Synode etali synodalité na ndako ya makita Polo VI ya Vatican Synode etali synodalité na ndako ya makita Polo VI ya Vatican  (ANSA)

Synode: bobimisi ba mbando ya ntei ya bituluku ya mosála

Bitiamaka na Papá François na sanza ya misato 2024, bituluku bazongisi ba bosukisi (conclusion) ya misala misalemaki uta suka ya Synode etali synodalité. Ba mbando (rapports) ya suka bikopesama na Léon XIV na 31 ya sanza ya zomi na mibale. Makambo-makonzi milobamaki mizali etinda ya numérique, mosala ya basi, œcuménisme, ndonge (polygamie), mateya matali milulu mya losambo (liturgie), ministeli ya bantoma pe liponami ya baepiskopo.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Sanza ntuku mibale sima ya bokeli byango na Papá François  -oyo abengaka na bosali elongo kati na ba dicastère ya Curie ya Roma pe Secrétariat général ya Synode- bituluku zomi ya boyekoli bazuaka lotomo ya kotala mituna miutaki na biteni mibale ya Synode etali synodalité babimisaki mokolo ya yambo 17 ya sanza ya zomi na yoko, ba mbando ya ntei (rapports intermédiaires), sima ya bolakisi ba mbando ya ebandeli o eleko ya eteni ya ibale ya Synode, na sanza ya zomi 2024.

Bituluku mibale ya sika

Makambo malobamaki mikouta na etinda ya numérique kino ba ministeli pe na bozali ya basi na Eklezia; boyokani na ba Eklezia ya monyele kino mosala ya bantoma pe boponi baepiskopo; lisusu œcuménisme, ba Eklezia ya monyele pe mituna ya liteya (doctrine) "mikotungisa" (controversées), miye tokoki koloba "mikobima" (émergentes), lokola mobulu mikosalema na basi o eleko ya etumba. Nzela moko na ba mbando, misala ya ba commisio ya droit canonique pe ya SECAM (Symposium des Conférences épiscopales d'Afrique et de Madagascar) etali ntembe (défi) ya ndonge milakisamaki lokola, na mpe, po ya mbala ya yambo, mbando ya etuluku etali mateya matali milulu mya losambo na botali ya Synode. Ezali yoko ya bituluku mibale miye Papá Léon XIV alingaki kobakisa na mwinda ya Mokanda ya suka (Document final), eye ebandaki kosala na suka ya sanza ya sambo 2025. Mosusu, kasi, ezali nanu kokelama pe etali motindo (statut) ya masanga ya baepiskopo, masanga ya baeklezia pe ba concile ya mike.

Bobakisi elaka ya bozongisi ba mbando ya suka

Bituluku binso bibengamaki po ya kolakisa makanisi na bango na Papá yambo ya suka na sanza ya motoba 2025. Liwa ya Papá François, boponi ya Léon XIV pe lisengeli ya kozala na ngonga mwa mingi po ya misala misalaki 'te esengelaki kobakisa elaká (délai). Na sanza ya sambo eleki, Léon XIV abakisaka elaká pe asengaka 'te ba mbando ya suka bilakisama na ye, "na ndenge ekokoka", yambo ya 31 ya sanza ya zomi na mibale 2025. "Bituluku bisusu bizali pembeni ya kosilisa misala na bango, misusu mikokoba na ba sanza bizali koya", ekomaki episkopo ya lokúmu Mario Grech, secrétaire général ya Synode, na lokasa lyoko pembeni.

Boyokani ba ba Eklezia ya monyele

Mbando ya yambo, ekomamaki na Etuluku ya boyekoli 1, etali boyokani kati ya ba Eklezia katoliko ya monyele pe Eklezia ya latin. Mituna 25, ba "makanisi (propositions) pe posa (souhaits)", bibongisamaki na Conseil ya ba patriarches katoliko ya Moyen-Orient, na lokola botuni (consultation) na "mituna po ya bolamu ya banso" mibongisaki misala ya etuluku, mitalaki mingi mpenza na bobateli ya bandimi ya monyele. Kati na makambo-makonzi etuluku elingi kotombola ezali likoki ya botali malamu mibeko ya droit canon ya monyele.

Ligangi ya babola pe ya mabelé

Etuluku ya boyekoli 2 esalaki likambo-likonzi ya boyoki ligangi ya babola pe ya mabelé, na bosali nsinga na ba reseau ebelé pe baeklezia ya bikolo. Etuluku ezuaki lokola makanisi 200 ya bitéyelo ya biyamba ya basi pe esali elongo na Bureau ya handicap ya Lisanga ya baepiskopo katoliko ya Australie na bozali ya bibosono na bomoi ya Eklezia. Mbando ya suka ekokomama nanu; na kati wana, o eleko eye ya bozongi, elama yoko yoko ya Etuluku akomipesa po ya kokende na bokutani na bato pe mangomba ya babola to baye batiama pembeni na mokili ye auti.

Etinda na nzinganzinga ya numérique

Etuluku ya boyekoli 3 etalaki etinda ya Eklezia na mokili ya numérique na bobimisi likambo "Eklezia ekoyoka bino", eye elakisi boumeli ya kosala elongo (expériences d’accompagnement) ya numérique biwuti na bikolo 67, na bosali epái ya bilenge pe bato batia bango pembeni. Lisolo ya ntina esalemaki lokola na Commisio ya papa po ya bobateli bana (mineurs).

Botali malamu Ratio etali ba sángó

Nzela moko ya molayi pe ya bokengi elimbolami na mbando ya Etuluku ya boyekoli 4, etalaki mingi Ratio Fundamentalis Institutionis Sacerdotalis, mokanda 2016 etali boteyi po ya bonganga-Nzámbe, ekoluka botali malamu Ratio na ndenge ya botali ya Synode, zambi ya koyanola na posa ya boteyi ekangama na mozindo na boumeli ya bato ya Nzámbe, bileko ya bosololi kati ya ba laíki, bamibonza pe balikindo, pe na bozali ekasi ya basi pe mabota.

Bozali ya basi na bomoi ya Eklezia

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye. 

18 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 13:41