Sango Roberto Pasolini na sanza ya misato Sango Roberto Pasolini na sanza ya misato   (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Matéya ya Adventi, mbela mókó ya kozela Mokónzi

Bikosálema na ndáko ya makita Polo VI mikolo ya mitáno mbala misáto yambo ya Mbótama: na 5, 12 pe 19 ya sánzá ya zómi na ibále. Matéya bikobongisama, libosó ya Papá, na motéyi ya Ndáko ya Papá, sángó Roberto Pasolini. "Tika été bozeli ya bozongi ya libélá ya Kristu esálema na likanisi ya kotónga Ndáko na ye, Eklezia, lokóla lisangá lyoko ya bandeko", ekomi sángó na mbela asálaki na Curia ya Roma.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

"Na bozeli boyei ya Nzámbe". Waná ekozala likambo-likonzi, ezuami na mokánda ya ibále ya Sántu Petelo, matéya ya Adventi, bikosálema na ndáko ya makita Polo VI mikolo ya mitáno mbala misáto yambo ya Mbótama, lobi 5 ya sánzá ya zómi na mibále, na simá 12 pe 19, na ngonga ya 9, libosó ya Papá Léon XIV. Makanisi bikolakisama na motéyi ya Ndáko ya Papá, sángó Roberto Pasolini, libosó ya baepiskopo ya lokúmu, baepiskopo, basángó pe balaíki ya libótá ya Papá, basáli ya Curia ya Roma, ya Bulamatari pe Vicariat ya Roma, na baye bansó bazalaka na Chapelle ya Papá.

Kozela Mokónzi na botóngi

Na bolakisi matéya na mokánda ya mbélá, sángó Pasolini alobi 'te bikosálema o eleko yoko esika wápi "bikokutana na súka ya mobú ya zúbile pe ebándeli ya mobú ya sika ya matéya matali milulu mya losámbo". "Elikya ya zúbile káti ya bozeli Mokónzi pe kimokili ya libiki", okoki kotánga na nsé ya kombo. Makanisi misáto bikosangisa "ba mbuma ya elikya biye Zúbile elamuisaki" na bomemi na súka na yangó, na eyenga enéne ya Bomimonisi. Elikya, ekomi lisusu motéyi ya Ndáko ya Papá, "ekobenga bisó libosó ya kotómbola misó".

Bozeli ya Mokónzi (Bozongi na nkembo ya Kristu) esengeli te ezala lokóla "bokimi boko ya mokili", kasi lokóla "bokengi boko makási, eye ekobongisa ekela ya mokolo na mokolo na lisapo". "Kozela bobimi ya súka ya Mokónzi elingi koloba, mbala moko, kobongisa nzelá na ye", elobi sángó. Waná ekotisi mokumba ya kotónga Ndáko na ye, Eklezia, "lokóla esika yoko bokoyamba lisangá ya bondeko pe ya bokútáni na Ye, na bolongi ba polarisations biye bikozokisa elongi". Bozeli ena, ya makási pe botóngi, ya Mokónzi "ekumbi biso na kóngómbela (horizon) ya súka ya libiki elobami na Bomimonisi", elembo ya "elikya lyoko ya mokili, etindami po ya bato bansó".

Bomimonisi ya Mokónzi pe libiki ya mokili

Etapi ya yambo ya komanyola boyei ya súka ya Mokónzi ezali ya komitengia na masikulu na ye: engebene na sángó Pasolini, "mbela mókó ya makási na bokengi ya moléndé pe na likabo ya sóló". "Bikotéya bisó loléngé lyoko ya kokolisa bomoto na bisó". Kobongisa nzelá po ya Mokónzi elingi koloba, "kopesa na Nzámbe esika yoko epái wápi bomoi na ye ezala ya kondimama". Eklezia ezali "Ndáko esika wápi Nzámbe akolakisa 'te azali". Na nzelá ya bondimi bilongi ya Esdras pe ya Néhémie, matéya bikotelema na "mokakatano ya kotónga lisangá lyoko ekangami", mosika na ba polarisations. Na súka, na botáli súka ya Mobú ya zúbile, "tokoyékola mikánda bitáli Bomimonisi, eleko eye Kristu amilakisi lokóla mwinda ya bato banso na bofúngoli na bansó bikuke ya Bokónzi", elimboli ye.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

18 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 10:31