Losambo ya oecuménique na mabongo ya etima Iznik po ya bokundoli mibu 1700 ya Concile ya Nicée, ya 28 ya sanza ya zomi na yoko Losambo ya oecuménique na mabongo ya etima Iznik po ya bokundoli mibu 1700 ya Concile ya Nicée, ya 28 ya sanza ya zomi na yoko  (ANSA)

Mgr Flavio Pace: "Nicée ezongisi bisó na eye elekaka o ebándeli na Yerusalem"

Secrétaire ya dicastère po ya Botómboli bomoko ya bakristu, Mgr Flavio Pace, oyo azalaka libosó secrétaire-molandi ya dicastère po ya ba Eklezia ya monyele, azongi na ndéngé ya komona likambo ya lisapo, eye esangisaki na Iznik, pembeni ya Papá Léon XIV pe motomolo ya Constantinople Bartholomée Ier, bakambi mingi ya biyamba po ya mibú 1 700 ya concile ya Nicée.

Vatican News

Kozonga na ebándeli po ya kososola malámu pe kokolisa motindo ya moto mokristu na mokili ya leló. Mgr Flavio Pace, secrétaire ya dicastère po ya Botómboli bomoko ya bakristu, azongeli ebándeli ya bokútáni œcuménique ya losámbo elekaki na Iznik.

Ndéngé nini okomona bosepeli eye ya mibú 1 700 ya Nicée?

Ezalaki bokútáni boko ezelamaki makási, elingamaki makási, na loléngé oyo esengaki ngonga ebelé ya bosololi, ya mosála pe ya bobongisi. Towangani te 'te bato balobi bipayi na bipayi, mingi na káti pe libanda ya Eklezia, bakoloba mingi baye bazalaki te koleka baye bazalaki, kasi ezali bokútáni boko ya lisapo, po biyamba ebelé bizalaki.

Eleko ya makási ezalaki bolobi ya Credo ya Nicée-Constantinople. Leló, tosáli likambo ya sóló eye "tokondima", po tomoni batindami na bisó koloba yangó lisangá, motéma ekamwi. Na bozindo, atá bikeke ya bokabwani, ya bopanzani, ya bobéndani biye bizali ndámbo lisusu, tolobi lisusu ntina ya boyambi na bisó, pe ezali eloko yoko eye ekokámwisa bisó.

Tososoli po na nini, epái yoko, Botomolo œcuménique pe, epái esusu, bakambi ebelé ya biyamba, ya yambo Papá François, na simá Papá Léon ye mókó, bazalaki na likanisi ya kosepela eleko eye. Na koyamba batindami ya orthodoxe, yambo ya eyenga ya basántu Petelo pe Polo, Léon XIV alobaki polele: "Nakozala na Nicée", asembolaki waná 'te bosepeli ya concile ekozala po ya biyamba binso. Yangó tomonaki pe tosálaki mokolo ya mitáno.

Tozonga mibú 1 700 simá. Molimo ya tángo waná ezali lisusu na bomoi pe ekoki kozala na bomoi?

Baepiskopo ebelé bayaka, eloko ekamwisaka na eleko ena, pe elimbolami na loléngé ya nzelá elandaki: kobunda na likambo lyoko ya pási eye ekokaki kokoma ya bato -yangó waná ezalaki kotungisa mokónzi (empereur)- kasi ezalaki káti ya lisangá ya bakristu. Ezalaki ya koyoka pe kosangana, ya kokanga mongongo ya Elimo, ya kososola eye Molimo ezalaki kosénga na Eklezia ya eleko waná pe ya koloba liloba lyoko eye ekokoma liloba lyoko ya kolanda. Bowelani ekobaki, kasi motéma ekangamaki na bobateli mobéko ena ya boyambi, eye ezalaki eloko mokónzi mokó te apesaki po ya kokonza, kasi mbuma ya bosololi ebotami na boyoki Elimo na bakengeli mpatá nionso ya Eklezia. Yangó ekosálema leló po ya makambo nionso.

Tomekami mingimingi, o ntei pe na libanda ya Eklezia, tángo ya bowelani, ya pási ya kondimama, ya kotikala bokabwana, ya kopanzana. Mosála ya Elimo ekosangisa, na boyoki mongongo oyo ezali ya ngai te, ya yo te, kasi oyo, na nzelá na bisó, ezali mongongo ya Elimo pe oyo, na súka, ekongengisa boponi boko eye tokani koyamba elongo.

Eleki mibú 1 700, na Nicée, dáti (date) yoko ya lisangá po ya Pasika ezuamaka lokóla. Bobuti esálema po ya lisangá, kasi lokóla po ya bomoko. Mobú eye, bakatoliko pe baorthodoxe basepelaki Pasika na dáti mókó ya lisangá, na 20 ya sánzá ya minei. Tozali wápi na masoló?

Bosepeli ya Nicée ebimisaki lisusu likambo waná. Ya sóló leló, ezali epái yoko, elingi koloba lisusu, kasi epái mosusu, tolingi te kosála bokabwani ya sika na bolobi yangó. Nakanisi 'te esengeli tángo mosusu kosála litámbe lyoko na simá po ya kokoka lisusu kokanisa pe kosolola, po mokáno mosusu ekosála bokabwani mosusu. Ezalaki pósá ya Papá François te, ezali ya Papá Léon te, pe baorthodoxe bayebi yangó malámu. Kasi ezali na pósá ya kozongela kosolola pe kozua nzelá yoko ya eyano.

Boyokani nini ezali káti ya Roma pe botomolo ya Constantinople?

Tokosepela kala mingi te eyenga mosusu: na 7 ya sánzá ya zómi na mibále 1965, na súka ya Concile Vatican II, nsakola yoko ya lisangá ezuaka mokoloto ya Polo VI pe Athénagoras, eye elongolaka bobengani bipai na bipai ya 1054. Kobánda waná, ezali na loléngé esusu ya lisoló eye ekokoba na ba Eklezia ya orthodoxe pe ya bizantine. Nakanisi eye Papá Léon alobaka na sánzá ya sambo, na koyamba mobémbo mókó mwá boyambi katoliko-orthodoxe eútaka Amerika. Alobaki libosó 'te akamwi, po mobémbo mwa boyambi ena ya lisangá ekanisamaki te eleki mibú ebelé. Lisusu, azongelaki kombo ya mobémbo ena,"Ya yambo kinó Roma ya mibále", abakisaki: "Nayambi binó, natombeli binó boyei elamu".

Papá apesi bisó liloba kitoko ena eye, po ya ngai, ezali fungola eye tokoki kokanga na molimo na mibú mikoya: elobi 'te likambo ekangami na lisoló ya yambo to ya ibále ya Roma te, likambo ezali  'te tobengami bansó ya kozonga na eye elekaka na ebándeli ya Yérusalem, po tokoki kozala lokóla bapostolu baye, tángo Yézu alobi likambo 'te alingi kokende na Yérusalem po ya kopesa bomoi na ye, bakotuna káti na bangó po ya koyéba nani azali likoló koleka baningá.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

02 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 10:52