Bokutani ya biyamba binso na Nicée mokolo ya 28 ya sanza ya zomi na moko Bokutani ya biyamba binso na Nicée mokolo ya 28 ya sanza ya zomi na moko  (@Vatican Media)

Na Yérusalem, na bosawa lokóla bandeko

Nsakola pe mbela ya Mokitani ya Petelo na bakristu basusu po ya Zúbile ya Bosikoli (Rédemption) ya 2033.

Andrea Tornielli*

Papá, na pósá ya kokomisa na mobéko-likonzi na ye ya episkopo mbela ya bomoko na Kristu, abengaki bakristu bansó ya kosála lisangá nzelá yoko ya molimo. Mobémbo mókó ya lisangá na Zúbile ya Bosikoli na 2033, po ya bozongi boko na Yérusalem, esika ya boyambi na bisó.

Eleki mikolo mibále na Iznik, na Nicée ya kala, batindami ya biyamba ya bakristu ebelé basanganaki na losámbo na mbela ya motomolo Bartholomée ya Constantinople po ya kosepela mibú 1.700 ya concile œcuménique ya yambo. Molulu ya mokuse pe ya kokámwa esálemaki pembeni ya ba vestige ya basilique Sántu-Néophyte, oyo abima na mai Etima Enéne. Bosangani ena ya batindami ya biyamba bikeseni ya bokristu ezalaki na lomeko lyoko ya nsango-ndamu: ezali na mabongo ya etima esusu, etima ya Tibériade, ndé Yézu eténi enéne ya mosála na ye. Na botámboli na mabongo waná, moí-Nazareth abengaki balobi mbisi mibále, Petelo na Andele, pe akomisi bango bantoma.

Kasi kitoko ya esika, na bozindo ya ekela eye esangisi bakatoliko, baorthodoxe pe bangelésa na losámbo, bikokaki te kobongola pótá ya pási ya kutukúlu (absence) na bangó. Yangó waná, simá ya ngonga  ntúkú mibále na minei, Léon XIV, na bokútáni lisusu na batindami bakristu bazalaki na Iznik, atondi bangó, na bobimisi elikya 'te bokútáni bikoya simá pe bileko bikokani na eye aúti koleka bikoka kosálema, na bosangisi ba Eklezia biye bizalaki te.

Episkopo ya Roma abongisi ya kokúmisa lisangá mibú 2000 ya liwa pe nsékwa ya Yézu, pe mbótama ya Eklezia, na Cénacle ya Yérusalem. Ezali waná mbela ya bosawa pe ya moléndé Mokitani ya Petelo ayebisi na bansó, po ya kokende mosika na Nicée pe kozonga na ebándeli ya boyambi, esika wápi nionso ebandaki. Léon XIV alobaki lisusu boyambo ya bopalanganyi nsango elamu pe nsakola ya kérygme, pe akundoli boni boni bokabwani káti ya bakristu bizali libakú lyoko na litatoli na bangó.

Kozonga na Yérusalem, ezali kozonga na libonza ya Golgotha pe na lilita polele bamama bamonaki na tóngo ya Pasika. Ezali kozonga na esika ya Cène, epái wápi Yézu, simá yo kosukola makolo ya bantoma, akataki lipa na bangó. Ezali kozonga na esika ya Nkitela, esika wápi etuluku yoko moke ya bato basisolami pe babangi ekomaki montéle (moteur) ya nsakola ya Nsango-Ndamu: motéma ekatani na liwa ya Motéyi na bangó, bakutani na ye na Cénacle na simá na mabongo ya etima ya Tibériade, asékwi pe na bomoi. Na Cénacle, bazuaki Elimo Sántu eye ebongoli bangó na batindami balembaka te, babongami ya kopesa bomoi na bangó po ya kosakola 'te Moto akufi na kuruze asékwi pe azali Mwána ya Nzámbe.

Kozonga na Yérusalem, ezali bôngó kokoma bato ya mobémbo mwa boyambi, elongo, po ya kokutana na Cénacle. Po ya kokundola, bansó lisangá, eye ezali na ntina mpenza. Yangó elingi koloba kotika eye ezali na ntina te: ba scorie ya politiki ya eklezia, bowelani pe lolendo, mayéle, bolingo bwa ekóló, boyokani pe mimeseno misusu ya bato biye bikaboli bisó. Yangó elingi koloba kolonga bokabwani na bomoni lisusu motéma ya nsakola ya Nsango-Ndamu. Po yango ndé Eklezia ezali na pósá, pe yangó mokili ezali na pósá. "Boni boni pósá ya boboto pe boyókani ezali monéne nzinganzinga na bisó, kasi lokóla na bisó pe káti na bisó!", elobaki episkopo ya Roma, Mokitani ya Petelo, libosó ya motomolo ya Constantinople, mokitani ya Andele. Kosangana na bosawa, lokóla bandeko basangani na mosála po bato pe basusu, po ya kozongela elongo maloba ya molobi mbisi ya Galilée: "Ozali Kristu, Mwána ya Nzámbe ya bomoi!".

 

*Mokambi éditorial ya ba média ya Sántu-Petelo.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

01 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 06:37