Papá Léon XIV alubolaki bilama ya Commisio ya Papá mpo ya bobateli ya bána (mineurs), Papá Léon XIV alubolaki bilama ya Commisio ya Papá mpo ya bobateli ya bána (mineurs),  

Bobateli ya bána: Papá aluboli bilama mibalé ya sika ya Commisio

Susan Lynn Bissell, molukiluki na Centre FXB mpo ya bokólóngóno mpe makoki ya moto ya etéyelo ya likoló Harvard, mpe Laurent Delvolvé, mosámbeli na Barreau ya Paris, bakoti na lisangá ya Papá.

Vatican News

Papá Léon XIV alubolaki bilama ya Commisio ya Papá mpo ya bobateli ya bána (mineurs), Susan Lynn Bissell, molukiluki na Centre FXB mpo ya bokólóngóno mpe ya makoki ya moto ya etéyelo ya likoló Harvard na Cambridge (Amerika), mpe Laurent Delvolvé, mosámbeli na Barreau ya Paris (Fránsa).

Susan Lynn Bissell, mibú ntúkú misáto ya nzebi na likambo ya bobateli bomwána

Susan Lynn Bissell azali nganga mayéle mókó ayébani mokili mobimba na likambo ya bobateli bomwána, azali na mibú koleka ntúkú misáto ya nzebi na botomboli ya bikóló, bokólóngóno mpe makoki ya moto. Azali sik’oyo molukiluki abengama na Etéyelo ya bokólóngóno ya Etéyelo ya likoló mpe moto ya botuni enéne epái ya bisalelo ya letá mpe ya bato bangó mókó.

Yambo, azalaka na ebóngá ya mokambi ya bobateli bomwána mpe mokambi molandi ya Eténi ya manaka ya UNICEF, esika wápi akambaka ba mayéle (stratégies) ya mokili na bikóló koleka 150. Azalaka lokolá mokambi mokeli ya Partenariat ya mokili mpo ya kosilisa mobúlú epái ya bána. O eleko ya etamboli ya mosála na ye, asálaka lokolá na Centre ya bolukiluki Innocenti ya UNICEF na Florence mpe akambaka manaka ya bobateli bomwána na India, na bobándi mosála na ye n'Asia ya Sudi, na Bangladesh mpe na Sri Lanka. Azali na doctorat yókó na bokólóngóno mpe n'anthropologie ya mónganga.

Laurent Delvolvé, nganga mayéle na bobateli bána na bisika ya eklezia

Laurent Delvolvé azali mosámbeli na Barreau ya Paris, na pembeni ya mibú ntúkú misáto ya nzebi na droit civil, pénal mpe canonique, na bokébi makási na bobateli ya bána na bisika ya eklezia. Azalaka na ebóngá ya conseiller juridique epái ya Lisangá ya baepiskopo ya Fránsa mpe ya ba dioceze ebelé, na dioceze ya Paris, na bosálisi na bokomi ya politiki mpe bisaleli mpo ya bokébisi mpe bokambi ya mazimbi (abus) bisálemaka epái ya bána mpe bato bazanga makoki.

Azalaka lokolá na botiyi mitindo (systèmes) ya bokambi, mitindo ya bosálisi baye bazui makámá, na bosungi bosálisani káti ya bisalelo ya Eklezia mpe bakambi ya letá.

Azali lokolá na botéi ya bakambi ya eklezia mpe na lisoló káti na droit canonique mpe mibéko ya ekóló. Mosála na ye ezali lokolá na lisálisi ya kolimbola mitindo ya bobongisi na ekóló Fránsa mpe bozali na bosololi ya Poto na likambo-likonzi ya bobateli.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

31 sánzá ya mísáto 2026, 10:53