Basilique ya Lilita-Esántu Basilique ya Lilita-Esántu   (AFP or licensors)

Episkopo ya lokúmu Parolin ayoki mawa na likambo ekómaki na Lilita-Esántu

Mokolo eye ya yambo 30 ya sánzá ya misáto, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, elongo na Secrétaire mpo ya Boyokani na Bikóló, Mgr Paul Richard Gallagher, akutanaki na ntómá ya Israël Yaron Sideman. Ba bolimboli ya polélé bipésamaki na «likambo ya mawa» elekaki o eleko ya misa ya Mandalála, ntángo polísí ya Israël apekisaki bokoti ya Lilita-Esántu na episkopo ya lokúmu Pierbattista Pizzaballa mpe Custode ya Mabelé Esántu, sángó Francesco Ielpo.

Vatican News

Engebene na Ndáko ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá, Pietro Parolin, elongo na Mgr Paul Richard Gallagher, Secrétaire mpo ya Boyokani na Bikóló mpe Masangá ya mokili, akutanaki na Yaron Sideman, ntómá ya Israël epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo.

Ndáko ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alimboli 'te bokútáni ená esálemi sima ya «likambo ya mawa» elekaki na 29 ya sánzá ya misáto, eyenga ya Mandalála, na bokotisi episkopo ya lokúmu Pierbattista Pizzaballa, motomolo latin ya Yérusalem, mpe sángó Francesco Ielpo, Custode ya Mabelé Esántu, «baye bamonaki bopekisi ya bokoti na basilique ya Lilita-Esántu na Yérusalem».

«O eleko ya lisoló, elobi Ndáko ya média, ba mawa bilobamaki na likambo ená, ba bolimboli ya polélé bilobamaki, mpe eyebani boyokani ezuami káti ya Motomolo latin ya Yérusalem mpe bakambi ya ekóló, na likambo ya bozali na matéya ya Triduum ya Pasika, na basilique ya Lilita-Esántu na Yérusalem».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

31 sánzá ya mísáto 2026, 10:58