Ba migrant bavandi bakozela lisalisi ya Croix-Rouge sima ya bobimi na masuwa ya limpinga ya Espagne Ba migrant bavandi bakozela lisalisi ya Croix-Rouge sima ya bobimi na masuwa ya limpinga ya Espagne 

Mokolo ya mokili ya ba migrant mpe bakimi: «Atá mpo ya mókó kaka ya bána mike baye»

O eleko ya Mokolo ya mokili ya Migrant mpe Mokimi ya mbala ya 112, eye ekokumbama na 3 mpe 4 ya sánzá ya zómi, kombo ya liloba ya Tatá-Esántu ebimaki mokolo ya minéi 9 ya sánzá ya minéi na lokasa lyokó ya dicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba. «Likambo ya migrant ya mikolo miye bibimisi mikakatano ya sika biye bikobangisa makási sémbo mpe lokúmu ya bána mike mpe bikosenga biyano ya lombango mpe ya makási», ekoki kotangama na mokánda.

Vatican News

«Atá mpo ya mókó kaka ya bána mike baye», ezali kombo eponami na Léon XIV mpo ya Mokolo ya mokili ya Migrant mpe ya Mokimi ya mbala ya 112. Nsakola yókó eye etindi polélé na mokánda ya Nsango-Ndamu ya sántu Mateo: «Moto ayambi mwána moke lokolá oyo o nkombo na ngai, azali koyamba ngai» (Mt 18, 5). Na liponi liye, Papá «alingi kolakisa bokébi ya Eklezia epái ya bána mpe bilenge baye bakutani na likambo ya migrant, na bolobi lisusu lotómo ya koyamba mókó mókó na káti na bangó lokolá Nsango-Ndamu ekotéya bisó».

Likomi (note) lyokó ya dicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba ebimaki mokolo ya minéi 9 ya sánzá ya minéi, ekoloba 'te ezali mbala ya yambo te ba Papá wa Roma baloba loléngé ya motéi na likambo ená, kasi «likambo ya migrant ya mikolo miye bibimisi mikakatano ya sika biye bikobangisa makási sémbo mpe lokúmu ya bána mike mpe bikosenga biyano na lombango mpe ya makási». Ezali bôngó ya «kosolola mitúya» te, mpo «"atá mpo ya mókó kaka" ezali na ntina koleka», tokoki kotánga.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

10 sánzá ya mínei 2026, 12:10