Bonsómi ya eyamba o káti ya botáli ad limina ya baepiskopo ya Pakistan
Vatican News
Baepiskopo ya Pakistan balobaki elikya na bangó mpo ya lobí ya Eklezia na ekóló na bangó, na bobimisi mikakatano ya makási biye bakristu bakokutana na yangó, mpenza bokesenisi, babofúndi ya botúki mpe bambongwana ya makási. Na bolobi o eleko ya botáli ad limina apostolorum ya baepiskopo ya Pakistan na Vatican, Mgr Samson Shukardin, mokónzi ya Lisangá ya baepiskopo katoliko ya ekoló mpe episkopo ya Hyderabad, alobaki 'te botáli eye ezalaki liziba lyokó ya bolendisi mpe ya sika mpo ya baepiskopo.
Elikya yókó ya sika mpe loléngé lyokó ya sika ya botáli mpo ya lobí
«Botáli ad limina eye ezali na ntina koleka mpo ya bisó mpo, ya loléngé ya molimo mpe bozali, ememeli bisó loléngé lyokó ya botáli ya sika mpe elikya yókó ya sika mpo ya lobí», elobaki Mgr Shukardin. Alimbolaki 'te baepiskopo balakisaki mikánda na badicastère ya Vatican mpe bazuaki biyano ya malámu epái ya bakambi ya Eklezia. «Tolakisaki mikánda na bisó na badicastère mpe tozuaki biyano ya malámu koleka epái na bangó, yangó ezali na ntina koleka mpo ya bisó», elobaki ye.
Mikakatano ya ntina
Na bolobi bomoí ya Eklezia na Pakistan, Mgr Shukardin alobaki 'te bopalinginyi Nsango-Ndamu ezali mókó ya mikatatano ya ntina eye lisangá ya katoliko ekokutana na yangó. Alimbolaki bandimi katoliko ya Pakistan lokolá bamipesi makási, atá pási ya nkita mpe makoki ya botéi bisúka. «Bato na bisó batángi nanu te, kasi boyambi ezali makási», elobaki episkopo ya Hyderabad. «Bazali bato babolá, kasi basáli koleka, baye basálaka kaka makási»
Likambo ya botúki
Mgr Shukardin akébisaki lokolá na mitungisi bitáli babofúndi ya botúki mpe ya bambongwana ya makási, makambo biye bizuaki mbala ebelé biyamba ya mike na ekóló. «Tozali na likambo lyokó linéne etáli makambo ya botúki», elobaki ye, na bobakisi 'te «bambongwana ya makási bizali». Alobaki lokolá 'te bakristu bakokutana ntángo mosusu na bobwaki mpe na bonyókoli likoló ya baboyambi na bangó mpe litatoli na bangó.
«Ntángo mosusu, Eklezia na bisó ekobwakama, ekonyókwama pámba te tolongobanisi na bampósá na bangó te», elimbolaki ye, kasi atá bapási, Mgr Shukardin alobaki 'te Eklezia na Pakistan ekokoba kotála lobí na elikya. «Eklezia na bisó ekoleka mikakatano, kasi tozali na esengo makási, elobaki ye, tozali na elikya 'te mokolo mókó, tokozua bokokani ya makoki na Pakistan».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.