2026.05.25 Mgr Eugene Martin Nugent alubolami ntoma na Tchéquie na Papa Leon XIV 2026.05.25 Mgr Eugene Martin Nugent alubolami ntoma na Tchéquie na Papa Leon XIV 

Mgr Eugene Nugent alubolami ntómá na ekóló Tchéquie

Episkopo ya Irlande oyo kinó sik’oyo azalaki ntómá ya Papá na Koweït, na Bahreïn mpe na Qatar, alubolami mokolo ya yambo 25 ya sánzá ya mitáno na Papá Léon XIV ntómá na Tchéquie, esika wápi akitani na Mgr Jude Thaddeus Okolo, oyo kála te alubolamaki na Haïti.

JR Bompolonga - Kinshasa

Azali nzebi ya ntómá oyo Ngwendé ya Sántu-Petelo atindi na Tchéquie. Sima ya mibú mitáno na Golfe epái ya mwá ndambo ya bakristu, Mgr Eugene Martin Nugent atindami na mabelé ya sika ya etindá. Ekóló Tchéquie ezali na bato pembeni ya milio 11, na káti wana kaka 19% bazali bandimi, mpe káti na bangó, 750 000 bakoloba bazali bakatoliko.

Nzebi na mosála ya ntómá

Abotama na 1958 na Scariff, o ntéi ya dioceze ya Killaloe na Irlande, Eugene Martin Nugent akulaki bonganga-Nzámbe mpo ya dioceze ya Killaloe na Scariff, na 9 ya sánzá ya sambo 1983. Azuaka lipolome na ye na boyékoli makambo ya bacelte. Akobaki na boyékoli matéya ma Nzámbe na mozindo mpe droit canonique na Etéyelo ya likoló ya Papá Grégoire ya Roma. Ayékolaki lokolá boyókani káti ya bikóló n'Akademi ya Papá ya Eklezia. Boyékoli ená esálisaki ye mpo ya kosálela mosála ya ntómá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, eye akotaki na 1992 na mibú 33. Asálaki mosála ya ntómá na Turquie mpe na Israël mpe epái ya batindami ya bontómá na Yérusalem. Asálaka lokolá na etindá ya boyékoli ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na Hong Kong kinó 2010.

Ntómá pembeni ya bisanga

Na sánzá ya mibalé kaka ya mobú ená, alubolamaki ntómá na Papá Benoît XVI, mpe episkopo mokambi ya Domnach Sechnaill (Dunshaughlin). Úta 2010 kinó 2015, asálaka misála waná na Madagascar, na île Maurice mpe na Seychelles, na bosáli mosála ya motindámi ya bontómá na Comores mpe na La Réunion, na mbú Indien.

Kobánda sánzá ya yambo 2015, episkopo Nugent azuaki mokúmbá ya Haïti, ebetamaki makási na boningani ya mabelé na 2010. Na 2019 mpe 2020, ndáko ya ntómá na Port-au-Prince eyambaka molongó ya makita na bokambemi ya Buro ya ONU na Haïti mpe Lisangá ya Bikóló y'Amerika. Babokútani biná bilukaki kosálisa lisoló mpe kosunga kosilisa mokakatano ya politiki eye ewumelaki.

Lisálisi ya mwá ndambo ya bakristu na Golfe

Na súka, Mgr Nugent alubolamaki na Koweït, Bahreïn mpe Qatar, na sánzá ya mibalé 2021, o eleko ya mokakatano ya mokili ya Covid-19. Abundaki na kosálisa masangá katoliko ya bikóló biná mpe kolendisa lisoló káti ya biyamba ya engúmba.

Na sánzá ya zómi na mókó 2022, ayambaki Papá François na mobémbo ya bontómá na Bahreïn, na sima episkopo ya lokúmu Pietro Parolin na Koweït na sánzá ya yambo 2026. Etumba na Moyen-Orient na bobimisi mikakatano ya sika, ntómá amipesaki mingi na lisálisi ya mokengeli mpe na lisungi lyokó na masangá katoliko bizalaki na pási. Sima ya mibú mitáno na Golfe, Eugene Nugent akozua mosála na ye ya sika na Prague.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

27 sánzá ya mítáno 2026, 09:07