Mobulu ya Israel na ndako eye bayébisaki bato babima na limpinga ya Israel Mobulu ya Israel na ndako eye bayébisaki bato babima na limpinga ya Israel  

Ngwendé ya Sántu-Petelo eleli 'te likoki ya moto etióláma

Libosó ya mobúlú ebelé na bisika ya losámbo, masangá ya biyamba mpe bisáleli ya bokólóngóno bwa nzóto, na bosáleli ba technologie na bitumba, lokolá intelligence artificielle, Vatican elobi etungisami mpe ebengi botosi mpe bobáteli ya bacivil. Basengeli te bazuama lokolá «biloko ya pámba mpe mitángo», kasi lokolá bato bazali na lokúmu lyokó, epésama na Nzámbe atá na ntángo ya etumba.

Vatican News

«Lokóta mpe sémba ya etumba bikitisi bato na mitángo, na bangúna to na mabé ya pembeni». Ezali waná ndé, elobi Ngwendé ya Sántu-Petelo na liyébísi lyokó ebimaki mokolo ya minei 21 ya sánzá ya mitáno, na eleko ya liwélani (débat) na Conseil ya sécurité ya ONU na likambo-likonzi «Bobáteli bacivil na bitumba ya mindóki».

Baye bakofúta motúya monéne ya etumba, atá bokási mpo ya kosilisa bitumba mpe bobáteli ebongisami na mobéko ya mokili ya bato, bazali ba milio ya bato «batindami na makási kotika bisika na bangó, nzokándé basusu mingi batandami na mobúlú, na nzala, na bozangi bobáteli mpe na bokwei ya misála milongobani».

Botáli pámba ya likoki ya mokili ya moto

«Bobáteli ya bacivil -elobi motindami ya Ngwendé ya Sántu-Petelo- ezali kaka likambo lyokó ya politiki to ebunela te». Elobi lisusu maloba ya Papá bitáli lotómo ya molimo ya kobátela bato mpe ebimisi litungisami na ye enéne «libosó bokoli ya botáli pámba mpe bokómisi pámba bitambolela biye bikotiya na likámá bacivil».

Kolaka bonsómi ya eyamba

Motindami akébisi na makambo misáto mpenza. Ya yambo etáli mobúlú na bisika ya losámbo mpe masangá ya biyamba. «Bikela yangó bikobébisa kaka bandimi mókó mókó te, kasi lokolá nionso etáli bonkoko, molimo mpe bato ya masangá mobimba. Lisusu, na eleko ya etumba, bisika yangó bikómaka bisika ya bobombani, na bomemi lisálisi lyokó mpe na bosungi bosálisani. Waná, kolaka bonsómi ya eyamba, atá na eleko ya etumba, ezali na ntina mpo ya kobátela lokúmu ya moto mpe kotombola boyókani».

Koluka kobeta lisási na baye bakopésa lisálisi te

Ezali na lombango lokolá ya kobátela basáli mpe bisáleli ya bokólóngóno baye bakokoba kozala bato ya mitambo, atáko mibú ebelé bileki sima ya bondimi eyano (résolution) 2286. Mokánda ená ekosenga bomipesi kobátela basáli, bisáleli, makoki ya bomemi (transport) mpe bisáleli na balopitalo. «Baye bazui makámá mpe bakoni -elobi motindami ya Vatican- basengeli kopimama lisálisi te, mpe baye bakopésa lisálisi lyokó na bato basengeli kolukama mpo ya lisási te».

Mokúmbá ya malámu ya technologie ya sika

Na súka, bosáleli na ntángo ya etumba batechnologie ya sika, na káti waná Intelligence artificielle, ekopésa nsomo: «bosáleli ya technologie esengeli kozuama kaka na mokúmbá ya malámu, mpo masini mókó te ekoki kokitana na likanisi ya motó esengeli ntángo babomoí ya bato bizali na lisano te». Komizongisa na batechnologie na botáli bato te ezali kotála maye makoya sima te na bobáteli ya bacivil.

Boboto ebotamaka na botiyi motéma

Mbela ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ekolobama na lisangá ya bikóló zambi ya ekolisa «bokási na ye mpo ya bokébisi, bosololi mpe bosilisi na kimia bamatata, na boyébi 'te boboto ya sóló ekotongama na bobángi to na bobébisi te, kasi na bokútáni, botiyi motéma mpe mokúmbá». Na bokundoli maloba ya Papá Léon XIV bitáli boboto eye ebotamaka na mókó mókó ya bisó «na loléngé eye totalaka basusu, toyókaka bangó mpe tolobaka na bangó», Ngwendé ya Sántu-Petelo elobi lisusu 'te «kobátela bacivil ekokotisa bondimi ya lokúmu ya moto epésama na Nzámbe na moto nionso, atá na eleko ya etumba».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

23 sánzá ya mítáno 2026, 15:28