Sima ya bobeti ya ba drone na Zaporizhzhia Sima ya bobeti ya ba drone na Zaporizhzhia 

Ntómá na Ukraine atelemeli bozangi ya mpósá ya kosilisa etumba

Na lisoló lyokó apésaki na bamédia ya Vatican, Mgr Visvaldas Kulbokas abimisaki bobángi na ye sima ya bobeti bokó ya makási koleka esálemaki káti ya 13 mpe 14 ya sánzá ya mitáno na mboka-mokónzi ya Ukraine úta ebándeli ya etumba eleki mibú minei. Motindami ya Papá na ekóló ená, amoni 'te bokobi ya mobúlú ená na bokási eleki, «ezali elembo ya mpósá mókó ya kokoba etumba».

Vatican News

Ezali likambo lyokó ya mawa eye elimbolaki ntómá na Ukraine, episkopo Visvaldas Kulbokas, sima ya eye ebéngamaki mobúlú ya monéne koleka eútaki na Russie úta ebándeli ya etumba, na motángo mókó ya mabé na moke bawéi 24 mpe bato 48 bazuaki makámá kaka na mboka-mokónzi, bána bazali káti na bangó. «Bangonga bileki bizalaki lisusu pási koleka mpo ya ekóló mobimba. Káti ya 13 mpe 14 ya sánzá ya mitáno, ezalaki bobwaki ebelé ya babombe», elobi episkopo na bamédia ya Vatican, na nzelá ya singa na 14 na mpokwa. «Bakambi ya Ukraine batángi badrone 1 500 ya kobwaka mosika biye bikómaki na bituka ya westi, Ivano-Frankivsk, Oujhorod mpe misusu, na sima, na butú, ekómaki ngonga ya Kiev, na badrone mpe bamissile ntúkú motóbá, mingi bizalaki balistique», elimboli Mgr Kulbokas.

Bamobúlú na mituka ya lisálisi bizali kotungisa

Ntómá amilobi «atungisami makási» na likambo 'te motuka ya ONU, ezali ya OCHA, ebetamaki na Kherson, nzokándé ezalaki kokabola lisálisi. «Ezalaki mituka biyébani malámu biye bikotambola sima kaka ya boyébisi libosó bakambi ya Ukraine mpe ya Russie:», elobi ye. «Ezali ya sóló 'te ezali bamobúlú bikanisami mpe ezali mbala ya yambo te; ezali bôngó kotungisa makási ntángo basálisi ya bato bayébani malámu babetami na likanisi ya kosála mabé, zambi bato bazua lisálisi te», elobi Mgr Kulbolkas.

Ndáko ya ntómá ezuaki biténi ya bamissile

Episkopo alobi lokolá 'te «mwá biténi ya bamissile bikweyaki na ndáko ya ntómá» kasi mabé bisáli waná bizali ya ntina mpenza te na bato mpe na bandáko: «Bamissile bikoya na biténi ya mike mpe tozuaki mwá ndambo lisusu na ntongo», elobi ye.

Ntómá alobi epái esusu kokoba kobongisa réseau na ye ya bato ayébi, mpenza na sángó Rafail Stefurak, OSBM, sángó-mokónzi ya ndáko-Nzámbe Sántu-Basile-ya-Monéne, ezali pembeni ya kilometele mókó na ndambo ya ndáko ya ntómá, eye ezali na misála ya bobongisi úta basánzá ebelé, sima ya mabé ezuaka. «Kála te babongisaki nsámba (toit) ya ndáko-Nzámbe mpe bamonaki madusú 57 bisálemi na biténi ya badrone mpe ya bamissile na basánzá bileki; esengelaki kobongisa nsámba mpo mayi ekotaka mingi», elimboli Mgr Kulbokas.

Elembo yókó ya mabé mpo ya súka elikyamaki ya etumba

Ezaleli ezali mabé koleka na biténi bizali na ngambo ya mwási ya Dniepr, elobi episkopo: «Koleka bawéi 16 na butú bokó, bato bazui makámá bazalaki bébóo, mpe pembeni ya ndambo ya etuka ezangi lisusu mayi», elobi motindami ya Papá. «Ntángo tosololaki ezaleli yangó na mwá bantómá ya bikóló, bangó balobaki 'te sóki bobwaki babombe ekokoba na bokási ená, ezali elembo yókó ya malámu te. Yangó elingi koloba mpósá ya kokoba etumba». «Na ngambo na bisó, esúkisi ntómá ya Papá, etikali na bisó kaka kosámbela mpo ya boboto».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

16 sánzá ya mítáno 2026, 09:59