Bobimisi ya mokánda ya bobongisi bokútáni ya sánzá ya zómi na Amoris laetitia
Vatican News
«Botámboli ya likambo-likonzi», mokánda eye ekobongisa mpe ekokende elongo na misála ya bokútáni eye Papá Léon XIV akokamba na Vatican úta 7 kinó 14 ya sánzá ya zómi 2026, mpe etindami na bakambi ya Baeklezia katoliko ya monyele sui iuris mpe na bakónzi ya Masangá ya baepiskopo, mpe ebimaki mokolo eye ya yambo 6 ya sánzá ya sambo. Bokútáni ená esakolamaki na Papá na nsango yokó ya 19 ya sánzá ya misáto 2026, o eleko ya mibú zómi ya Amoris laetitia, bolendisi ya bontómá ya sima ya Synode ebimaka na 19 ya sánzá ya misáto 2016 na Papá François, mbuma ya botámboli bokó ya bomanyoli ya Synode eye ewumelaka mibú misáto mpe likambo ya ntina koleka ezalaka Lisangá ya monéne ya mbalakaka ya mbala ya misáto ya Synode ya baepiskopo (2014) mpe Lisangá Linéne ya Synode ya baepiskopo ya mbala ya zómi na minei (2015).
Boyókani ngambo na ngambo mpe bomanyoli ya Synode
Na boyébi likambo ya bambongwana biye bikokoba kokamba makanisi ya mabótá, Papá Léon XIV abimisaki likanisi na ye ya «kosála, na boyóki ngambo na ngambo, bomanyoli bokó ya Synode na mikáno ya kozua mpo ya kosakola Nsango-Ndamu na mabótá leló, na mwinda ya Amoris laetitia mpe na botáli eye ekosálema na Baeklezia ya bikóló». Na súka ya consistoire ya mbalakaka ya mikolo miye, na 27 ya sánzá ya motóbá eleki, Papá Léon XIV azongelaki likambo-likonzi ya libótá: «Esika wápi esúngami mpe ekokende elongo etéyelo yokó ya boyókani, ya bosálisani mpe ya elikya ekobotama; esika wápi ezokisami to etiami pembeni, ezali lingómbá mobimba eye ekozua bambano». Kaka na eleko ená, asakolaki 'te mabótá masusu bakozala lokolá na bokútani ya sánzá ya zómi, babengani ya kokabola nzebi na bangó. «Bozali na bangó ezali na ntina, kasi nakolikya 'te baye bansó bakoya bakomibongama na boyóki na bokébi mpe na bomemi nzebi ya mabótá ya Baeklezia na bangó», ekomaki ye.
Esika yokó ya sóló ya bokútáni
Na Roma, baepiskopo ya mokili mobimba babéngami ya kokabola na makambo-makonzi mabongisami na «Botámboli ya likambo-likonzi» mpe ya koyóka bipái na bipái, zambi ya ķobwaka lisusu, o ntéi ya Baeklezia ya bikóló na bangó mpe na bosálisani ya mabótá, ekela yokó ya mobáteli ya lisangá mpo ya libótá, ya bomoí ya moto mpe ya mbélá na libala. Ya sóló, mikolo yangó ya mosála bilingi esika yokó ya sóló ya bokútáni, ya boyóki mpe ya bomanyoli: na koyamba banzebi bileki na mabótá, na bokaboli matatoli ya sóló ya bomoí, na bokanisi na bamwangó ya kokende elongo loléngé lisangá ya Eklezia ekosálela mpe bokaboli makanisi na bato ya mayéle. Na ndéngé ená, Masangá ya baepiskopo mpe Baeklezia katoliko ya monyele babéngami kokanisa na makambo-makonzi maye úta basánzá bizali yambo ya bokútáni, na bopesi esika yokó ya ntina na boyóki mabótá ya Baeklezia ya bikóló.
Ezali bôngó botámboli bokó ya mobáteli ya ntina, eye ekotiya mabótá o káti kaka lokolá bato bakoyamba ekela ya Eklezia te, kasi lokolá bato ya etindá na ye, na nzelá na bangó Nsango-Ndamu ezui loléngé na babokútani ya mokolo na mokolo, na maponi, na bolembu mpe na elikya. Atá ezali Lisangá lyokó ya Synode ya baepiskopo te, bokútáni ená ekosálema na molimo mókó ya Synode mpo - lokolá Papá Léon XIV alobaki na bosúkisi consistoire - ekokabola molimo ya botámboli ya bosáleli ya Synode, esálemi na boyóki, na losámbo mpe na bomanyoli.
Makambo-makonzi mitáno bibongisami na likanisi ya baye bakozala, yambo mpe o eleko ya bokútáni:
1. Mabótá leló: bosóló, bonzenga mpe mikakatano -Komanyola bilembo ya ngonga úta nzebi ya mabótá mpe bomipesi ya Eklezia leló.
2. Bilengé mpe bomoni ya mbélá ya libala - Koyóka Bilengé mpe kokende elongo na bangó na bomoni motúya ya libala.
3. Bomoí ya libala. Mibú ya yambo ya libala: eleko yokó ya mokáno monéne -Koyóka mpe kokende elongo na balongani o eleko ya mibú ya yambo ya bomoí ya libala na bangó mpe na etapi yokó yokó ya bomoí na bangó
4. Libosó ya bapási ya bomoí: kokende elongo mpe kosalisa -Kotambola pembeni ya mabótá na ntángo ya makambo.
5. Mabótá ya bakristu, basáli ya etindá ya Eklezia - Koyamba bolingo ya libala .pe ya libótá lokolá elendiseli ya etindá.
Le parcours thématique est disponible sur https://www.laityfamilylife.va/ et sur https://www.synod.va en plusieurs langues.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.