2025.09.05 Papa Léon, mokolo ya bofungoli Borgo Laudto si'; na mitano ya sanza ya libwa 2025 2025.09.05 Papa Léon, mokolo ya bofungoli Borgo Laudto si'; na mitano ya sanza ya libwa 2025  (@Vatican Media)

Borgo Laudato si', boyókani káti ya moto mpe mokili, elilingi ya kitoko ya Nzámbe

Papá Léon XIV akozelama mokolo ya póso 11 ya sánzá ya sambo mpo ya kolia na babolá ya dioceze ya Roma. Na esika ená ya bahectare 55, ezalaka kála Ndáko ya Papá ya bopemi ya Castel Gandolfo, bisika wápi milimo mibalé bivandi: Esika ya boyékoli ya likoló Laudato si' mpe loléngé lyokó ya bilanga esálema na mibéko ya bobáteli ya ekelamo mobimba.

JR Bompolonga - Kinshasa

Bosangisi bokó ya kitoko ya kokamwa, epái wápi bomoí ya molimo, mokili, ntoki, mosála mpe technologie bibengami ya kovanda elongo na malámu. Waná ezali, na súka, likanisi ya «borgo» - «bourg» (mboka moke): esika yokó ya kozala pene na bato mpe ya boyókani malamu. Na 5 ya sánzá ya libwa 2025, Léon XIV afúngolaki Borgo Laudato si' likanisi lyokó esálema mpo ya kozala ndakisa yokó ya bowumeli ya nzinganzinga mpe ndakisa yokó ya nkita ya bozongisi mpe bosáleli lisusu biloko, likanisi ewuti na encyclique ya Papá François epésama na bobáteli ya ekelamo ebimaka na 2015. Ezali waná ndé mokolo ya póso 11 ya sánzá ya sambo, Papá wa Roma, oyo azali úto mokolo ya eyenga eleki na Castel Gandolfo mpo ya eleko yokó ya bopemi, akolia na babolá nkama mibalé, káti na bangó bána 35, bakozala elongo na dioceze ya Roma mpe masanga misusu ya lisálisi.

Elembo yokó ya penepene ya Eklezia eye ekomisami mpenza na bobáteli ndáko ya bansó, mpo «etindá ya kobátela ekelamo, ya komema waná boboto mpe bozongisi boyókani  -elobaka Papá na 9 ya sánzá ya sambo ya mobú eleki na litéya ya misa mpo ya bobáteli ekelamo na Borgo Laudato si' - ezali etindá eye Mokónzi apesaka bisó. Tokoyóka bogangi ya mabelé, tokoyóka bogangi ya babolá, mpo bogangi yangó ekómi na motéma ya Nzámbe».

Loléngé lyokó mingi ya banyama mpe banzete

Ntúkú mitáno na mitáno ya hectare ya etando, biye bizalaka yambo na Bandáko ya bopemi ya Papá, káti na yangó 20 bibongisami mpo ya mosála ya bilanga na baolivier 1 500, na lokolá esika yokó epái wápi bikobika motindo mókó ya basoso biwuti na esanga ya Java, meme mókó na zolo ya moíndo ya Valais, ngombe yokó highlander mpe bampunda bipesama na Papá na Tolède mpe na Séville. Waná bizali bizaleli mpenza ya Borgo Laudato si', esika wápi bakobimisa máí ya mabéle, esika wápi bizali bilanga ya vino bitiamaka na etéyelo ya likoló ya Udine, ndáko yokó monéne ya kolona milona eye ezwaka nguyá na yango na moí, na lokolá motindo mókó ya bolekisi máí na boyanoli na bosenga ya mikolo miye ya bowumeli, na bokitisi mabé na etimá ya pembeni Albano. Misála mingi bisálemaka na esika yokó ya kitoko makási na bahectare 35 elanga loléngé ya Italie mpe koleka baloléngé 3000 ya banzete, na botosi mobimba ya bokeseni ya bomoí ya ekelamo.

Papa Léon na Borgo Laudato si'
Papa Léon na Borgo Laudato si'   (@Vatican Media)

 Mbóto mókó ya elikya

Na mobéko mókó ya 2 ya sánzá ya mibalé 2023, Papá François akelaka Esika ya boyékoli ya likoló Laudato si', ekokambema na Bulamatari ya Letá ya Vatican, na etindá ya kotombola mpe kosálela makanisi bikoluka «boyékolisi mobimba ya moto, na bokébi mpenza na bilengé mpe na baye, likoló ya nkita mpe makambo ya bato, batiami pembeni ya lingómbá». Boyékolisi mpo ya misála ya ofelé bibongisama bizali na bastage mpe boyingisi na mosála mpe bitáli makambo ya boloni,  mosála ya bilanga, ya bobongisi na lokolá bokambemi na botáli. Mansó waná bibongisami mpenza mpo ya bato bazali na pási: bamigrant, babombani, bána mike bazali bangó mókó, bási na likámá ya bosangisi nzóto na makási, bilengé mpe bakolo bazali na mosála te, bato bazali na bozangi makoki mpe bakangemi ya kála. «Mbóto mókó ya elikya  -elobaki Léon XIV na botángi papá François o eleko ya bofungoli ya Borgo- eye ekoki kobota bambuma ya bosémbo mpe ya boboto»

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

12 sánzá ya nsambo 2026, 13:08