2026.02.06 Mgr Ettore Balestrero 2026.02.06 Mgr Ettore Balestrero 

Ngwendé ya Sántu-Petelo akoloba mpo ya bobongisi IA esálemi na lokúmu ya moto

O eleko ya Lisoló lya yambo ya mokili ya bokambami ya Intelligence artificielle, esálemaki na Genève, motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU, Mgr Ettore Balestrero, azuaki maloba na 7 ya sánzá ya sambo eye. Bokambami bokó malámu ekosenga «bosáleli bokó elongobami ya IA, bozangi kopesa mosála na bato ya libandá mpe bopesi mokúmbá na algorithme yokó te», elobaki ye, na bobeti nsete na lisengeli ya kobátela bokónzi ya moto na makambo ya IA.

JR Bompolonga - Kinshasa

Na bolakisi encyclique na ye ya yambo Magnifica Humanitas, Papá Léon XIV alobaki «bomipesi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ya kozala na makási na bosololi intelligence artificielle (IA) na mwinda ya lokúmu ekoki kobébisama te ya moto mókó mókó», elobaki lisusu na bozui na ye ya maloba Mgr Ettore Balestrero, ntómá ya Papá mpe motáli ya eleko insó epái ya ONU na Genève. Na ndéngé waná, ekobaki ye, Bososoli ya yambo ya mokili na bobongisi IA, eye esálemaki mikolo mibalé na Genève (úta 6 kinó 7 ya sánzá ya sambo), ezali esika yokó ekoluka «[...] kosálisa masoló mazali ya kofúngwama, ya polélé mpe ya bokotisi bato bansó na bokambami ya IA».

Mgr Ettore Balestrero asálelaki libakú eye ya koloba mpo kokumisa bosáli ya bokútáni ená mpo ya kosálisa «masoló mazali ya kofúngwama, ya polélé mpe ya bokotisi bato bansó na bokambami ya IA». Mpo, elakisaki ye, «mokolo na mokolo eye ekoleka ekolakisa mingi 'te tokobika mbongwana mókó ya lisapo eye ekosimba makambo nionso ya bomoí».

“"Lisengeli ya bokambami ya makási elingi koloba kotiya bandelo na IA te mpo ya bosepeli kaka pámba ya kokela biloko bipekisama. Ezali kaka likambo lyokó ya yambo mpo ya kolaka 'te bomátisi ya technologie elanda na loléngé ya ntina epái emoniseli yokó ya monéne koleka, na mosála ya bomoto nionso, na botosi lokúmu ekoki kobébisama te, epésama na Nzámbe, ya moto na moto mpe bolámu ya bansó".”

Bokambami bokó esálema na mokúmbá ya moto

Mpo ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, bokambami bokó malámu ekosenga «bosáleli bokó elongobami ya IA, bozangi kopesa mosála na bato ya libandá mpe bopesi mokúmbá na algorithme yokó te». Yangó waná, elobaki ye, «liponi nionso ya motúya esálemi na eloko yokó esálaka yangó mókó esengeli kozuama na bokónzi ya moto». Mgr Ettore Balestrero abetaki nsete na likambo 'te «lombango mpe bokási» bikoki atá moke te «kozala ntina ya lokutá ntángo mbano esengeli kozala na litómba lyokó na bomoí ya bato». Pámba te, ebakisaki ye, sóki IA esengeli basálela yangó mpo ya kobátela lokúmu ya moto mpe kosálela ya sóló bolámu ya bansó, «mokúmbá ya bosáleli yangó esengeli kotikala káti ya mabóko ya bato bazuaka mikáno, na bosenga bokó ya kopesa nsango na misála na bangó na etapi yokó yokó».

Polélé

Libosó ya bozangi polélé na «bozui mokáno yangó mókó», Ngwendé ya Sántu-Petelo abengi lokolá kolendisa polélé. Etindá ya Vatican emoni na ntina mingi 'te molongó ya bato baye bazali na mokúmbá eyébana malámu, úta bakeli ya batechnologie kinó basáleli ya súka, mpo ya kolaka bokónzi bokó ya sóló na molayi ya molongó ya bomoí ya makambo ya IA. Na botángi lisusu Papá Léon XIV, Mgr Balestrero alobaki lisusu 'te mokúmbá ekokotisa likoki ya «kolakisa oyo akoki kopesa biyano na mikáno, kolongisa yangó, kokamba yangó mpe, sóki esengeli, kotiya yangó na ntembe mpe kobongisa mabé nionso esálemi».

Boyókani bokó ya mokili mobimba libosó ya bilombe ya technologie

Ngwendé ya Sántu-Petelo ekobenga lokolá na boyókani bokó elendisami ya mokili mobimba mpo ya kosála mibéko ya bansó ya bokambi. Engebene na Mgr Balestrero, boyókani boná ekoki kosálisa bososoli bokó ekabolami káti ya Bikóló na bolaki mokúmbá mókó ya lisangá na mosála ya bolámu ya bansó. Motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU, alobaki bobángi na ye libosó ya bokangemi ya batechnologie ya Intelligence artificielle káti ya mabóko ya bakompani minéne moke, na botáli 'te ezaleli ená ekoki kokolisa makámá sóki ekokende elongo te na mibéko ya malámu mpe bibongiseli bikoki kolaka bokónzi na yangó.

Na bosúkisi bozui na ye ya maloba, Mgr Balestrero alobaki mpósá na ye ya kozala na misála ya mokili mobimba na bokambami ya Intelligence artificielle. «Etindá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, elobaki ye, ekolaka bangó mpósá na ye ya kobánda lisoló lyokó ya botóngi, mpo ya kobátela lokúmu ya moto na eleko ya IA».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

09 sánzá ya nsambo 2026, 13:49