Bakristu bakotambola likolo ya mobulu na Hyderabad Bakristu bakotambola likolo ya mobulu na Hyderabad   (ANSA)

Na Pakistan, botómbwami ya ba secte ekómi kobángisa bakristu

Eleki mwa mikolo, babomaki moto mókó ya mibú 42 na masási o eleko azalaki na mobémbo mwa boyambi na dioceze ya Lahore. "Bato bakanisi lolenge moko ezali na nzelá te pe ba secte ya biyamba bikobótama", elobi Paul Jacob Bhatti. Mokónzi ya lingomba Mission Shahbaz Bhatti, apesa nkómbó ya ndeko na ye ya mobáli babomaka ye na 2011 pe bakomemya ye lokóla mosáli na Nzámbe, alingi ba "mbóngwana ya malongá po ya bato".

Jean René Bompolonga - Kinshasa

"Babomaki Afzal Masih na bilenge ya mobúlú makási baye, o eleko kaka bamonaki kúrúse na kingo na ye, babetaki ye masasi. Bazokisaki lokóla ndeko na ye ya moke". Motéma ya Paul Jacob Bhatti ekolela mondimi katoliko ya mibú 42 eye babomaki na 7 ya sánzá ya libwá elekaki o eleko ya mobémbo mwa boyambi na sanctuaire ya ekóló ya Mwa Esengo Ngondo Maria na Mariabad, mbóka ya bakristu na dioceze ya Lahore, na Pakistan. "Babomaki ye na moto mókó akondima na bokási ‘te koboma bakristu ezali eloko mókó malamu", elobaki ye.

Lokóla mokambi ya lingómbá Mission Shahbaz Bhatti, apesa nkómbó ya ndeko na ye ya mobáli Shahbaz oyo azalaka ministre ya biyamba ya mike mike pe ya  boyokani na ekóló kinó mokolo babomaka ye na 2011 pe azali komemiama lokóla mosáli ya Nzámbe na Eklezia katoliko, Paul Jacob Bhatti azalaki nzeneneke ya ba zómi ya makambo ya lolenge ena.

Secte ya biyamba

Leló, emoni ye, Pakistan eyébi bomáti ya motángo ya bato na lolenge moko ezali na nzelá te pe ezangi ba mbóngwana ya malongá po ya bato, mingi penza na eye etáli botángisi. Engebene na Paul Jacob Bhatti, nionso wana ekoluka bomáti ya mobúlú makási eye ekozua kaka bakatoliko te. "Ezali na makanisi ebelé, ba secte bebo biye bitómbwami, ndakisa epái ya bamusulman, baye bazali kobúnda", elimbolaki ye.

« Bána mingi ya babola bakómi komema bangó na bitéyelo biyebani na bakónzi ya ekóló te, bisimbami na ba secte epái wápi, na bolobi ya kopesa bangó ya kolia pe ya komela, bazali kokotisa káti na bána makanisi ya ba secte », ebákisaki Paul Bhatti. Letá ya sika, lokóla biye bileka, eyébi likambo ena ya mabé, elobi ye, kasi bomipesi na ye po ya kosúkisa yangó ekoki te likoló kaka ya mikakatano na politiki te, kasi lokóla mindondo ya nkita.

Mbóngwama ezali na ntina

Paul Bhatti alobi lisusu ‘te makási ya letá ezali kotála mingi likambo ya botóngi simá ya bozindi ya ba ndáko eye ezuaki mbóka ya Pendjab : « Makoki ya bato pe ya nkita bizali na ntina po na kosála ba mbóngwama, mingi penza po ya botángisi ya ntina na botosi ya bato pe ya bonsómi ya eyamba ».    

Simá ya bobomi Afzal Masih, letá ya Pakistan ayanolaki na bozui mikáno miye « bikozua ba mbuma na yangó na mibú mikoya », elobaki Paul Bhatti. Po na ye, likambo ya koluka ezali eye ya Pakistan mókó « epái wápi moto mókó mókó akoki kobika na makambo te ».

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

16 sánzá ya libwa 2025, 12:30