Bassin ya Congo Bassin ya Congo  (AFP or licensors)

Bassin ya Congo, mompululu ya mokili, ebangisami na bobúkani bwa bato po ya pitoló na mabángá ya ntálo

Libenga lyoko po ya kosálisa (fonds d’investissements) ba zamba ebimisami na COP30 na Belém. Ebongisami mpenza na Bassin ya Congo, esika wápi bato milio 130 n'Afrika ya ntantei. Úta leló mompululu (poumon) ya yambo ya mokili, zamba enéne y'Afrika ezali o káti ya makambo mingi ya eténi ena pe ya mokili. Lisoló na sángó Rigobert Minani Bihuzo, mokambi ya Réseau Ecclésial du Bassin du Congo (REBAC)

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

"Awa, nakoyoka lokóla epái na ngai", elobaki episkopo ya lokúmu ya Congo Fridolin Ambongo o eleko ya liyangani ekambemaki na bantómá ya ba Eklezia ya Sudi mokolo ya minei moleki na COP30 na Belém, na bizibeli y'Amazonie. Klima yoko ya mai, ba mbúla bebo pe bazamba ya mbinga, matono mingi ya ndéngé mókó káti ba bassin mibále ya zamba bikabwana na ba kilometele ya mbú Atlantique, kasi nionso mibále mikatisami na équateur ya mabelé.

Bokokani ena eye endimisaki batindami ya eklezia y'Afrika ntantei ya koya ebelé na eténi eye ya COP. Mayangani mibále milekaki na klima ya ONU, bisálemaki o ntei ya bilombe mibále ya pitoló ya Émirats pe Azerbaïdjan, bizalaki lokóla mosika na makambo ya sóló ya klima mikoleka n'Afrika, elobaki mokambi ya SCEAM yambo ya bozongi na ye na Kinshasa. Mobémbo molayi kasi elembisaki batindami y'Afrika te, epái wápi sángó Rigobert Minani Bihuzo, mokambi ya REBAC oyo ekosála po ya bokotisi likambo ya etumba etáli mbongwana ya klima na litéya. Úta mibú mibále, REBAC ekosangisa lokóla ba réseau mitáno ya eklezia na mokili, batelemi makási po ya koyanola na mbela ya encyclique Laudato si', basangani na simá ya Alliance des réseaux ecclésiaux pour l'écologie intégrale.

Bassin ya Congo, mompululu ya mai ya mpondú eye mokili ebosana

Na monéne na ye, Amazonie azalaka kála mingi na mpete (titre) ya "mompululu ya yambo ya Mabelé". Kasi likolo ya misála mabé ya bobuki banzete pe ya kolona kaka eloko yoko, misálemaki mbangu koleka o eleko ya bokónzi ya Jair Bolsonaro, Bassin ya Congo ezali úta leló libúlú enéne ya carbone tropical ya mokili, elobi sángó Minani. Constat yoko elobamaka na mbando (rapport) ya súka ya Panel Scientifique po ya Bassin ya Congo, ebimaka o eleko ya COP28. Engebene na bato ya nzebi 180 baye bakomaka mbando ena, bazamba minene ya etando patátálú (plaine) ya malámu bikomela na photosynthèse pembeni na 0,66 tonne ya carbone na ekitále (hectare) mobú mókó mókó. Na kobosana te milliard 30 ya ba tonne ya carbone bikangama na ba tourbière ya bassin.

Ba milio ya km² 3,56 ya bassin bikobomba Cameroun, République centrafricaine, Congo- Kinshasa, Congo-Brazzaville, Guinée équatoriale pe Gabon. Bikobomba mitindo 10 000 ya milona (plante) pe ebale lyoko eye débit ezali kokokana pembeni na eye y'Amazone. Na loléngé esusu ya bazamba y'Amazonie to ya Bornéo, biye ya Bassin ya Congo bibatelami mwá malámu na bokoti ya ba multinationales ya zamba, na ndéngé mabelé bisika bizuami, bikota na mabelé, elimboli motindami ya REBAC. Atá bongo, libakú linzéngá ena epekisi te bapósá bikouta libanda, elobi ye.

Misála mitáli pitoló pe mabángá ya ntálo bikobangisa po ya ba écosystème

"Na súka ya zamba, ezali na ba bloc ya pitoló biye bakompani ebelé ya mokili bazali kolandela pembeni pembeni, pe bulamatari ya Congo elukami po ya ba permis ya exploration pe ya exploitation", eyoki mawa sángó Minani. Na waná esengeli kobakisa bobúkani epái ya cobalt, lithium, coltan to lisusu nickel eye ezali ebelé na engumba. Bobúkani po ya kozua mabángá ya ntálo mina, bibengami "stratégique" po bizali na ntina po ya boleki ya énergie, ekomema bobuki banzete ebelé pe botongi ya bandáko ya ba industrie biye bikotungisa ba écosystème pe bikobébisa ba nzelá ya mai.

Mokakatano mosusu: boyangélami na nkóni.  Bikóló ya bassin ya Congo bayangélami mingi na biomasse ligneuse po kosilisa bapósá na bangó ya énergie, koleka bikóló bisusu ya mokili. Bozangi ya lotiliki pe ntálo ya mitindo misusu bisáli nkóni liziba lyoko ya énergie koleka po ya bato ebelé ya milio 130 bazali na boyangélami ya bassin. Pási bongo ya kokanga bobuki ba nzete. "Na bopesi lisálisi ya mosolo te na bato ya bassin po ya kozua loléngé esusu ya énergie, tokoki kozua kaka makambo mizali n'Amerika ya latin pe na Indonésie".

Libenga (Fonds d'investissement) lyoko ya mokili po ya kotinda na bobateli ya bazamba

O mokolo ya yambo ya COP30, mokónzi ya Brésil abimisaki Tropical Forest Forever Facility (TFFF), eloko yoko ezali na mosála ya kobimisa milliard ya ba dollar 125 po ya kobatela bazamba. Soki libenga ebimisi masoló pe kimia epái ya basusu, REBAC alingi 'te esálema na lombango. "Sik’oyo, esengeli kopesa mosolo kaka na bulamatari te, kasi ekoka kokoma epái ya bato bazali na zamba", ekebisi sángó ya jésuite. "Yangó waná tokanisi 'te etumba ya mbongwana ya klima ekokende nzelá mókó na etumba ya bokambi elamu, démocrasi pe boyangeli malámu bikóló y'Afrika".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

23 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 11:00