Libota lyoko ekolela sima ya bobomi na motuka na Nex Delhi Libota lyoko ekolela sima ya bobomi na motuka na Nex Delhi  (AFP or licensors)

Inde: Eklezia ebéngi kosámbela po ya boboto simá ya bobomi ya New Delhi

Likoló ya bobomi na motuka etiamaki motámbo esálemaki mokolo ya yambo 10 ya sánzá ya zómi na yoko na mboka-mokónzi ya Inde, baepiskopo balaki na nsámbo na bangó po ya bato bansó bayoki pási na likámá lina. Balendisi bato ya "kotikala ekenge", na bolobi 'te esengeli na bomoko ya ekóló na etumba libosó ya bobangisi bato (terrorisme).

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Lisangá ya baepiskopo katoliko ya Inde elobaki mokolo ya misáto 12 ya sánzá ya zómi na yoko "mawa makási ya ye libosó ya liwa ya bato bayébi likambo te pe ya pási ya baye bazokaki" o eleko ya bobomi na motuka etiamaki motámbo esálemaki mokolo ya yambo na New Delhi, eye ebomaki bato mwambi pe bato ebelé bazokaki. "Makanisi na biso pe nsámbo na biso bikokende na baye bansó bazali koleka na pási mókó koleka na eleko eye.  Tokosámbela lokóla po ya libiki na lombango ya baye bazokaki", elobi communiqué. Baepiskopo balendisi bato ya "kotikala ekenge pe ya kolakisa sasaipi likambo nionso ya mabé na pulúsi".

Kobunda na bobangisi bato

Balobi bosengeli ya etuluku yoko ya ekóló na etumba na bobangisi bato, pe basengi lokóla na basángó ya paloise ya "kopesa nsango na bakambi baye bazali na makoki likambo nionso ya mabé to eloko nionso ebwakami na, to pembeni, ya bisika ya losámbo". Lisangá ya baepiskopo ya Inde ebyangi na "bomoko lokóla lingomba lyoko; ya kosála elongo po ya boboto, bokengi pe bolámu ya bato bansó". "Tokoba kosámbela po ya boboto pe bokengi na ekóló na bisó ya motúya", balendisi

Ba bokangi

Na moke bato mitáno bakengemi na pulúsi ya Inde na sudi ya Cachemire, bamonani lokóla bazalaki na bobomi ya New Delhi. Ekindo (explosion), emonani sik’oyo lokóla bobangisi boko ya bato, ekoki ekangama na mindondo bikokoba káti na Inde pe Pakistan nzinganzinga na etúká ya Cachemire, ezuami na súka ya nordi ya mokili ya Inde.

Epái esusu, ba soda ya bokengi balobi babebisi "esika lyoko ya bato ya bobangisi" na súka ya mboka-mokónzi, na bokangi bato sambo pe na bozui ebómbelo lyoko ya ntina ya esalelo ya bokeli ba explosif. Mokolo ya mibále ya sánzá ya zómi na yoko, bobomi boko na Islamabad, mboka-mokónzi ya Pakistan, esáli na moke liwa ya bato zómi na mibále pe ebelé ya bato bazoki. Atáko eloko yoko te ekangisi bobomi biye mibále, bozali pembeni na eleko ezongisi lisusu mindondo káti na bikóló mibále.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

14 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 11:20