Mosala ya boluki bato babungi ekokoba na Palembayan, Agam, na Sumatra Westi Mosala ya boluki bato babungi ekokoba na Palembayan, Agam, na Sumatra Westi 

Mpela n'Asia ya Sudi-Esti, koleka bato 1 500 bakufi

Simá ya ba mbúla makási ya mousson, bisangani na cyclone mibále póso elekaki, pe bibébisi Sri Lanka, Indonésie pe Thaïlande, ekomi likambo ya lombango po ya kosálisa baye babiki. Ndakisa na Sri Lanka, Eklezia katoliko etelemi po ya kosálisa baye bazui makámá, na koyamba baye bakimi

Vatican News

Ba mbúla ya makási bibétaki n'Asia ya Sudi-Esti, mingi mpenza na Thaïlande, Sri Lanka pe Indonésie, bisáli koleka bato 1 500 bakufi pe ba nkáma ya bato babungi. Na loléngé ya likámá linéne ena, masangá ya bosálisi bato na Indonésie balobi bazali kosála po ya komema lisálisi na bisika ya makámá, pe bulamatari ya Indonésie asakolaki mokolo ya ibále botindi 34.000 tonne ya loso pe 6,8 milio ya litele ya mafúta ya kolambela na bingumba misáto bibétamaki: Aceh, Sumatra ya Nordi pe Sumatra Westi. Kasi, nkándá ekomáta na ekóló epái wápi bato 8000 bakufaki, po ya lomoi (lenteur) ya lisálisi.

Mobéko ya lombango na Sri Lanka, lisálisi ya Eklezia

Na Sri Lanka epái wápi mobéko ya lombango (état d'urgence)  esakolamaki simá ya boleki ya cyclone Ditwah eye esálaki na moke bawei 465 pe milio 1,5 ya baye bazui makámá engebene na motángo ya súka ya bakambi, Eklezia katoliko etelemi po ya komema lisúngi pe lisálisi na baye babiki. Ba paloise, masangá ya ba mamelo pe misála katoliko misusu bakoyamba bato bakimi. Engebene na agence Fides, "Caritas ebongisaki réseau na ye nionso, na ba paloise pe masangá, baye basalaka lifúta te bakosála ntángo inso pe masangá katoliko babimisi makoki nionso ya bangó po ya kosálisa bato bakimi, na botáli mboka to eyamba te", elobi sángó Basil Rohan Fernando, sángó ya Colombo pe mokambi ya Œuvres Pontificales Missionnaires na Sri Lanka.

Lisálisi epesami lokóla na masangá ya bakristu, kasi bosálisi ya lombango lokóla. Bapesi bangó bilei, mayi pe biloko ya bokólóngónó. Na waná esengeli kobakisa lisálisi ya likanisi pe ya molimo. "Ekela yoko ya bolingo pe ya bozali pembeni elingi koloba mingi na makambo ya boye, boyoki pe móto ya moto bizali litatoli lyoko ya bolingo ya Nzámbe epái ya moto mókó mókó", elobi sángó.

Boluki baye babungi

Na Sri Lanka, bituluku ya bosálisi bikambami na limpinga bikokoba koluka bisika ya makámá po ya boluki bato babungi, elobi Centre ya botáli makámá, kasi ezali pási po ya kokoma kúna po banzelá bikangemi na bokwei ya mabelé pe ba gbagba ebelé bikwei bipayi na bipayi. Likambo ekoki kokoma pási koleka, po ba mbúla misusu bikoya na mikolo bizali koya, bakambi bakébisi. Na sudi ya Thaïlande, misála ya bosokoli banzelá pe bandáko bibandi simá ya ba mpela biye bizui koleka milio 1,5 ya mabótá pe milio 3,9 ya bato. Bakambi bakosála makási po ya kozongisa bisalelo, mpenza po ya bopesi mayi na lotiliki.

Thaïlande

Epái ya Thaïlande, ministeli ya Makambo ya Káti asakolaki akobongisa bisika zambi ya kopesa na bato bilei bilambami kaka waná. ONG Save the Children emipesi na Indonésie pe na Thaïlande na bokaboli mayi, ba kit ya bokólóngónó, bilei pe na bokeli bisika ya kotéya pe kosakana ya malámu. Na bikóló bibále biye, bána bebo bakoki kokende na etéyelo te po bandáko bikangemi to bibongwami bisika ya kobombana na eleko eye, kasi bokáti ya lotiliki pe bisalelo bibébi bikopekisa botángi na nzelá ya internet.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

04 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 10:54