La Havane La Havane  (ANSA)

Cuba: bolimbisi bokó epésami na bakangemi 2 000 mpo ya Mpóso Esántu

Na bopúsani ya bosepeli ya Pasika, bulamatari ya La Havane azuaki mokano ya kobimisa etuluku yókó ya bakangemi, na bobengi mokáno ená ya «ekela ya bomoto mpe ya bonsómi». Káti ya 2 010 bato babimi bizali na baye basili basálaki «eténi ya ntina ya etúmbu na bangó» mpe baye «balakisaki ezaleli yókó elámu na boloko».

Vatican News

Na mwá mikolo ya Pasika, bulamatari ya Cuba asakolaki apési bolimbisi na bakangemi 2 010, sima ya botiki bakangemi 14 eleki sánzá yókó. Mpo ya La Havane, ezali «ekela yókó ya bomoto mpe ya bonsómi», eye ezali «mpo ya bosepeli ya Mpóso Esántu», engebene na communiqué yókó etangamaki na etando eke ya Cuba na 2 ya sánzá ya minéi. Atáko lokasa ya nkombo ya bakangemi baye bazui bolimbisi mpe ntina bokangemi na bangó bipésami, nsakola esemboli 'te basáli «eténi yókó ya malonga ya etúmbu na bangó» mpe «balakisi ezaleli elámu na boloko».

Káti na bangó «bilenge, bási, bampaka ya koleka mibú 60», na lokolá «bapaya mpe bána mboka ya Cuba bavandi o libandá ya ekóló», esemboli communiqué. Bulamatari ya Cuba, na káti ya matata ya Washington mpenza na nzelá ya bokangi pitolo, elobaki 'te bolimbisi esakolamaki ekozala ya «mbala ya mitáno» epésami úta 2011. Úta waná, bato 11.000 bazui bolimbisi.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

05 sánzá ya mínei 2026, 14:16