Ba migrant bavandi na masuwa pembeni na Libye Ba migrant bavandi na masuwa pembeni na Libye 

Sant’Egidio ebengi kobakisa makási na bobikisi ba migrant

Lingómbá laíki ya mokili ebengi na bomipesi bokó ya sika mpo ya misála ya bobikisi mpe ya botiyi ba nzelá ya koleka ya malonga, sima ya liwa mikolo miye ya ba migrant na Méditerranée.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Ezuami na Roma, lisangá ya Sant’Egidio elobaki bozindo ya mawa na ye sima ya likambo lya mawa na maí ya ba migrant na Méditerranée mpe ezongelaki mbela na ye mpo ya politiki yókó ya malámu koleka mpe ya bomoto koleka na misála ya bobikisi, mpe boleki na bobateli ya bato bazangi makoki. Mbela ená esálemi o eleko bato 70 babungisi bomoí ntángo masúwa na bangó ebalukaki mosika na mabóngo ya Libye mokolo ya Póso ya Pasika.

Likambo lya mawa eye esálemaki na butú ya Pasika, eyébanaki kaka sima ya bobikisi bato mingi babikaki na likámá. Bato baye balobaki 'te masuwá elongwaki Jajoura, na Libye, na bato 105 na káti. Kaka bato 32 babikaki. Bozindi ená esálemi sima likambo lya mawa mosusu ya loléngé ená esálemaki póso elekaki, epái wápi ba migrant 19 y'Afghanistan, káti na bangó mwána moke mókó, bazuaki liwa na ebale Égée na Bodrum, na Turquie. Engebene na OIM, lisangá ya mokili etálaka likambo ya ba migrant, esálelo yókó ya ONU, na moke ba migrant 683 babungisi bomoí to babungi, úto ebándeli ya mobú 2026.

Mbela ya Sant’Egidio

Na communiqué yókó, Sant’Egidio elakisaki mawa na ye na mabótá ya baye bazuaki makámá, na bolobi lisusu 'te likambo lya mawa eye ya súka ebakisami na molongó mókó ya ba bozindi bisalemaki kála te na mongálá (canal) ya Sicile mpe na ebale Égée. Lingómbá laíki ya mokili ya katoliko ekébisi na bokini (indifférence) eye ekokola, na bolobi 'te makambo maye bikoki kokitisama na motángo pamba.

Sant’Egidio ezongelaki lokolá mbela na ye na bisalelo ya bikóló mpe ya Poto mpo 'te balendisa makási ya bolukiluki mpe ya bobikisi na Méditerranée. «Bomipesi ematisami ezali na ntina mpo ya kobikisa bomoí ya baye bazali na likámá na ebale», elobaki ye. Kaka na eleko ená, Sant’Egidio elobaki ntina ya kokolisa ba nzelá mpo ya bato biyébani mpo ya ba migrant, biye bikolaka boleki ya malámu mpe ya mobéko mpe bibongisa molongó ya bondimami, mingi mpenza botángisi ya bána, matéya ya lokota mpe makoki mpo ya mosála.

Likambo ya ba nzelá mpo ya bato eye Sant’Egidio etombolaka na mibú zómi bileki, na bosálisani na masangá misusu, kinó leló esálisa bato 8 500 ya kokoma na Poto na bobateli ya malámu.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

10 sánzá ya mínei 2026, 12:00