Elili ya bolakisi Elili ya bolakisi   (ANSA)

Congo-Kinshasa: libosó ya etumba, eyano na Ebola ekómi mokakatano koleka

O eleko Congo-Kinshasa ekobunda na bomáti ya sika ya bokono ya virus Ebola, mónganga Michel Maneno, mosáli ya nzebi na bokólóngóno bwa nzóto na Bunia na Congo-Kinshasa, abeleli na mikakatano ya bokono mpe ya bato biye bikokómisa makási etumba libosó ya maláli. Na lisoló lyokó na bamédia ya Vatican, alobi mikakatano bikangemi na eleko ya bobáteli, mikáno ya bokébisi mpe maye makokóma na bato na likámá liye.

JR Bompolonga - Kinshasa

Yambo mónganga Michel Maneno akundoli 'te bokono ya virus Ebola ewúti «na virus yókó, elingi koloba eloko yókó ya mabé». Bokono ená emonanaka na «bilembo nzike ya nzóto», mingi mpenza «bapási na móto, babosánzi, babotangi makilá, pulúpulú, féfele mpe bilembo bisusu bisangani».

O eleko bakambi ya ekóló mpe lisangá ya ONU etálaka likambo ya bokólóngóno bwa nzóto (OMS) balobi bobángi na bangó libosó ya bomáti ená ya sika, mónganga alobi 'te ezaleli ya sik’oyo ya ekóló ekokómisa makási eyano ya bosálisi. « Yangó ezali na káti ya eleko ya sik’oyo ya ekóló na bisó, ezui elembo ya etumba eye ezali na engumba», elimboli ye. «Eleko yangó ekokómisa makási koleka eyano na maláli». Atáko sóki atikali na bokébi na nsinga ya mbala mókó káti ya etumba mpe bopalinginyi ya virus, mónganga Maneno alobi 'te eleko etikali ya ye mókó esika wápi «makambo nionso bikoki kotambola na botáli ezaleli na mosála».

Kotosa mikáno ya bokólóngóno

Libosó ya matata ya bopalinginyi, mónganga abeti nsete na ntina ya mikáno ya bokébisi biyébani kála na baí-mboka. «Esengeli 'te bato batosa yambo mikáno ya bakambi ya bokólóngóno», elobi ye. Káti ya mikáno «mikáno ya ekangeli, bozali o ntáká (distanciation), bokimi bokútáni na bato bazui mikolobé to baniama bazui virus».

Abengi lokolá na bokébi bokó koleka o eleko ya babokundi: «Ezali na ntina ya kosimba banzóto ya bato bakúfi na bokébi koleka». Na eye etáli bosálisi ya bakóni, mónganga Michel Maneno alobi 'te babosálisi ebelé bisálemaki kála o eleko ya bamaláli bileka. «Babolukiluki bikokoba zambi ya kozua mino mpe bamolécule ya makási koleka», esemboli ye.

Na likambo ya mánguelé na mosisa (souche) bundibugyo, alobi 'te, engebene na bansango bizali, «mángwelé mpo ya mosisa ená ezuami nanu te, kasi boyékoli ekokoba».

Makambo bikokóma mpo ya bato mpe nkita

Mosika na likambo ya bokólóngóno, mónganga alobi lokolá bobekoli (répercussion) ya maláli na bomoí ya mokolo na mokolo ya bato. «Na ezaleli ya maláli, ezali kaka na bobekoli na lomeko ya bato mpe ya nkita», elimboli ye. Matata eye ekoki «kobébisa mwá moke loléngé ya bato mpe ya nkita ya bato», mpenza na biténi ya botámboli, ya nkita to ya esáleli ya loléngé ya bokólóngóno.

Libosó ya bapanzi nsango na Genève (Suisse), mokónzi enéne ya OMS, Tedros Adhanom Ghebreyesus amonaki «matata ya maláli lokolá likoló koleka na ndéngé ya ekóló mpe engúmba n'Afrika ya ntéi mpe moke na ndéngé ya mokili».

OMS abándaki mokolo ya eyenga bokébi bokó ya bokólóngóno na mokili mpo ya kobunda na bomáti ya 17 ya Ebola na Congo-Kinshasa ya bato koleka milio 100, epái wápi bingúmba ya monyele ya ekóló mindondo mpo ya koyingela na balabala mpe ntángo insó na mobúlú ya bituluku ya mindóki.

Na ngonga eye, maláli esáli bawéi 139 na pembeni ya bato 600 bamonani lokolá bazui virus mpe ekoki kobútá, atá sóki matata ya maláli emonani «pété». Libosó ya ezaleli ená, bakambi ya bokólóngóno mpe masangá ya mokili bikokoba bokási na bangó zambi ya kokanga bopalinginyi ya virus mpe kolendisa bosálisi ya bato bazui maláli.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

23 sánzá ya mítáno 2026, 15:21