Kati ebébisami ya ndako ya lisapo ya Golestan na Téhéran, na 4 ya sanza ya minei 2026 Kati ebébisami ya ndako ya lisapo ya Golestan na Téhéran, na 4 ya sanza ya minei 2026  (AFP or licensors)

Etumba na Moyen-Orient: Unesco ebéleli na bobébi ezui libulá ya ntoki

Lisangá ya ONU mpo ya botéi, nzebi mpe ntoki (Unesco) emilobi «etungisami makási» na maye masálemi na bokolisi ya bitumba na Moyen-Orient na libulá ya ntoki ya eténi ená ya mokili. Na lisoló epésami na bamédia ya Vatican, moko ya bakambi ya Unesco na Paris, alimboli 'te «etumba esimbi kaka bomoí ya bato te, kasi lokolá likambo ya ntoki mpe bisika ya libulá».

JR Bompolonga - Kinshasa 

Yangó esáli mpenza mikolo 78 mokolo ya mpóso eye ya 16 ya sánzá ya mitáno 'te  etumba ekotoka na Moyen-Orient. Úta ebándeli ya mobúlú ebándaki na 28 ya sánzá ya mibalé n'Amerika mpe Israël na Iran, motángo ya bato emáti na lombango koleka ba ndelo ya ekóló, na bokómi na bawéi bébóo. Longola motángo ya bato, mókó ya bazui makámá na etumba ekómi kinó na bikóló bisusu ezali libulá ya ntoki. «Etumba ená esimbi kaka bomoí ya bato te, kasi lokolá likambo ya ntoki mpe bisika ya libulá», elobi Krista Pikkat, mókó ya bakambi ya Unesco na Paris, na lisoló lyokó epésamaki na Radio Vatican - Vatican news.

Bisika ya lisapo bibébi

Atáko sóki lisangá ekoki «nanu te kotála ezaleli ya nionso», elobi ye, bisika ebelé ya ntoki bizali pembeni ya bisika bibetamaki na Iran, na Israël, na Yérusalem mpe na Palestine. Na eleko eye, Unesco elobi babobébi na bisika misáto bikomama na libulá ya mokili. Ezali Ndáko ya Golestan -yókó ya bisika ya kála koleka ya mboka-mokónzi ya Iran mpe ezalaka kála ndáko ya dynastie Qajar- ezuami na Téhéran kasi lokolá pavillon ya Tchehel Sotoun, elama ya Elanga ya Perse, na lokolá esika ya kála ya Tyr na Libá. Biloko bisusu ya ntoki ya ntina na ekóló bibébaki na Iran, mpenza complexe ya palais ya Saadabad, ndáko ya kála ya Sénat mpe lokolá synagogue yókó na Téhéran.

«Botáli na bisó ya bonsómi ezali na likákoli (analyse) ya bilili ya satellite», esémbolaki Krista Pikkat. «Na botáli ezaleli ya bobáteli na eténi ená ya mokili, tokokaki kokende kúna te mpo ya kosála botáli», ebakisaki ye, na bosemboli epái esusu 'te motángo ya sóló ya bisika bibébi ekoki koleka eye eyébani.

Libulá lyokó ya ntina ekánelami

Eténi ená ya mokili ezali na ndámbo ya ntina ya libulá ya mokili. Unesco ekundoli 'te ezali na bisika 126 bikomama na libulá ya mokili mpe koleka bisika 300 bizali na makásá ya bolakisi ya bikóló, mpe bikoki kokota na lokásá ya libulá ya mokili. Lisangá ya ONU elobi lokolá bomengo ya libulá ya biloko te ya eténi ená ya mokili: bonkoko, mayéle, bisáleli ya ntoki mpe ba izini ya bokeli bibébi lokolá na etumba.

«Ntángo bamusée bikangi, ntángo baalanga-ntoki bakoki kosála makambo ya kotála te, bapimisami na mosolo na bangó», elimboli mokambi ya Unesco. Abeti nsete na botúti ya kobombana kasi ya koúmela ya bitumba na masangá: «Tokomona kaka te eye esálemi biye bamatata bikoki kozua na bomoí ya ntoki na bato». Unesco eyóki mawa epái esusu na likambo 'te «bituka 17 ya bokeli» biye bikosálisana na lisangá na eténi ená ya mokili bibetamaki kála.

Kotosa mobéko ya mokili 

Libosó ya likambo waná, Unesco elobi lisusu 'te biloko ya ntoki bibátelami na baboyokani ebelé ya mokili, mpenza Boyókani ya La Haye ya 1954 mpe Boyókani ya libulá ya mokili ya 1972. Lisangá ya ONU elobi etindelaki mikánda na Israël, na Iran mpe n'Amerika mpo ya kokundola mpo ya bangó balotómo na bangó ya mokili. Bolakisi ya bisika bibátelami bilekisamaki na babundi zambi ya kosukisa makámá ya babobeti.

 Ekela yókó ekumisamaki na ezaleli ya bobáteli

Atá bozali ya baburo na eténi ená ya mokili, mpenza na Téhéran mpe na Doha, mosála na mabelé na bikipi ya Unesco ekotála ndéngé bokengi ezali. Lisangá ekosála sik’oyo makita na mosika na bakónzi mpe bato ya nzebi ya bikóló. «Ntángo ezaleli ekobonga, na lombango tolingi kokoka kozala na mosála koleka na ekoló», elobi mokambi ya etuluku ya Bonkoko ya Unesco 

«Libulá ezali ya mokili mobimba»

Koleka bandáko mpe bikeko, Unesco elaki kolanda nini etumba ekosála na bamusée, bacollection mpe babosáleli ya bonkoko. «Likambo lya bonkoko, libulá na bisó, ezali ya bisó bansó, ya moto nionso, mpe mpo na yangó esengeli kobomba yangó», esúkisi Krista Pikkat.

 

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

 

17 sánzá ya mítáno 2026, 11:05