Mgr Dumas abengi mokili mobimba mpo ya kosálisa Haïti
JR Bompolonga - Kinshasa
Etikama na bansó, elikya mpo ya Haïti ezali na losámbo, akozongela alemba te Mgr Pierre-André Dumas na Vatican News, mpe ntángo akoloba yangó, mongongo na ye ekozua elobeli yókó ya bobángi, kasi ezangi mwá ndambo ya esengo te. «Bato na bisó bakonyokwama úta mibú ebelé atá moto mókó akotungisama te. Esengeli bôngó kosálisa mokili ya kozua lisusu liyoki ya bosálisani ya sóló epái ya Haïti na nzelá ya losámbo: ekozala kitoko makási komona bato, bapaloise, misála ya letá, mabótá mpe masangá ya biyamba kosangana mpo ya mokolo mókó ya losámbo ya mokili mobimba», elobi episkopo ya dioceze y'Anse-á-Veau-Miragoâne mpe mokónzi molandi ya lisangá ya baepiskopo.
Mbela bibwaki elikya
Epái esusu, yangó esáli mibú ebelé, Eklezia ya ekóló ekobwaka bambela bibwaki elikya na lisangá ya bikóló, elonga yókó te. Emonani neti, engebene na episkopo, 'te bamobúlú ya bapomba biye bikosála mokolo na mokolo bawéi bébóo, bobolá ya koleka mpe bozangi kimia ya politiki, liziba ya bozangi sémbo mpe bokesenisi, bizali te káti ya makambo ya yambo ya bikóló bisusu. Kasi Mgr Dumas akangi mabóko te mpe akokoba koganga makási lisusu koleka: «Nakanisi 'te na lisangá ya bikóló, kulutu akoki kobosana ndeko na ye alemba mpe azoki te. Lisangá ya bikóló esengelaki komitika kobelela na likambo ya Haïti. Ekóló na ngai ezali kaka na ngonga yókó y'Amerika, ekóló ya yambo ya nguyá na mokili. Nzokándé, akobébisa mbongo ebelé mpo ya kosála etumba o eleko, pembeni na ye, tokonyokwama. Haïti ekosenga kaka mawa mókó ya bongobongo te, kasi bondeko bokó bwa sóló»
Nzelá ya kuruze yókó ya pási
Bakambi ya mokili basengelaki koyéba malámu pási ya bato ya Haïti. Mpo yangó esáli mibú ebelé ekozonga, kaka na ndéngé yókó. Mpe Mgr Dumas, mpo ya mbala esusu, akotánga yangó lokolá ezalaki sapele ya makila. «Mobúlú ya bituluku bisimbi mindóki ekokoba kopanza bobángi, liwa mpe bobuki; eténi enéne ya mabelé ya mboka-mokónzi, Port-au-Prince, ekambemi na bapomba; mabótá bébóo basengelaki kokima na makási bandáko na bangó, biye mingimingi bitumbami to bibukami; bána mpe bilengé bakobika na bobángi na klima yókó ya bozangi bobáteli na eleko insó».
Likambo ya bomoto
Mpe na sima ezali likambo ya bomoto. Koleka bato milio 5 bakoki kokufa na nzala, eténi enéne ya bato bazangi ndéngé ya kosálisa nzóto mpo mwá balopitalo bikangemi na bilama ya bapomba nzokándé bitéyelo ebelé bikangema mpe bána kelasi mingi bazali lisusu na likoki ya botéi te. Lomeko ya politiki mpe mosála ya letá ekobundana na yangó lokolá na mokakatano nanu emonana te. «Ekomonana, eteléméli Mgr Dumas, bolembu bokó koleka ya misála ya letá, epái wápi bozangi botiyi motéma epanzani na bansó, bozangi bokó ya kimia mabé ya bulamatari. Haïti ezali mpótá na mopanzi ya mokili eye esengeli koningisa boyébi ya bansó».
Lisálisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo
Kasi Mgr Dumas ayébi malámu 'te yangó ekokende bongo te. Yangó waná etondi Ngwendé ya Sántu-Petelo mpo ya lisálisi na ye na bato na ye alingaka mingi. «Bokútáni káti ya Léon XIV mpe secrétaire ya Letá, episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, na batindami ya bulamatari ya Haïti, eye esálemaki eleki mwá mikolo, ekolakisa mpo ya bisó bokási bokó ya sóló mpo ya boboto. Sima ya nionso, ezali Ngwendé ya Sántu-Petelo eye endimaka, yambo na mokili, lipanda ya Letá na bisó», elobi ye.
Ndoto yókó enéne
Na motéma ya episkopo ya dioceze y'Anse-á-Veau-Miragoâne -oyo akozongisa sik’oyo nzóto na bampótá na ye na Floride sima ya bozui likámá na boluki bobomi bokó esálemaki na bapomba baye balingaki te azala montéi mpo ya boluki kimia káti ya bulamatari mpe bituluku ya bato ya mindóki- ezali lokolá na mpósá mosusu: «Eye ya komona, mokolo mókó, Papá na mobémbo na Haïti. Nazali nakondima 'te boleki na ye, lokolá elili yókó ya pété mpe ya nguyá, ekoki komema boboto bokó ya bozindo».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye