Mgr Nicolas Lhernould: «Lampedusa ezali mwinda mókó mpo ya Méditerranée»
JR Bompolonga - Kinshasa
Papá François atelemelaka bozangi ya mawa ya mokili mobimba libosó ya ebale yokó enéne ekóma lilita ya bato ebelé bakoluka lobí lyokó ya kitoko. Mokolo ya póso, mibú 13 sima ya oyo azalaki libosó na ye, Papá Léon XIV akokende na esangá ya moke ya Italie ya Lampedusa, o ntéi ya Méditerranée. Libosó ya mobémbo ya Papá Léon XIV na Lampedusa, mokolo ya póso 4 ya sánzá ya sambo, episkopo ya Tunis mpe mokónzi ya Lisangá ya baepiskopo ya Engúmba ya Nordi y'Afrika, akaboli botáli na ye na mikakatano ya migration biye bisangisi mabóngo ya Méditerranée.
Na bolobi mpo ya botosi ya lokúmu ya moto mpe botóngi ya «mokili mókó ya bolingo» eleka bandelo, Mgr Nicolas Lhernould azongeli mpo ya bisó na ekela ya Eklezia na Tunisie, ekóló ya pembeni koleka ya Lampedusa.
Mgr, Papá akotála mokolo ya póso 4 ya sánzá ya sambo esangá ya Lampedusa, eye ezali kaka kilometele 145 ya Tunisie. Boni boni Eklezia ya Tunis ekomona mobémbo ená na mabelé mókó eye ekokabola bosóló bokó ya migration pembeni makási na binó?
Ya yambo, mpo ya bisó, Lampedusa, eye ya sóló ezali Sicile na mboka y'Agrigente, ezali elembo mpe bosóló ya bozali ya lisoló lyokó ekabolama. Tozali pembeni makási ya Sicile úta kála, mpe na basinga ya bato, na basinga ya bato bakotambola, na basinga ya ebale. Ezali malámu ya kokundola 'te, ndakisa, baí-Italie mpe mingi mpenza bato ya Sicile bakómaka na mabóngo ya Tunisie na ekeke ya 19 mpo ya mosála mpe mpo ya boluki mbisi. Mpo ya bisó, ezali lokolá lisapo lyokó ya migration ekabolami eye elenda mosika koleka makambo ya sik’oyo na nzelá ya migration úta nordi kinó epái ya sudi na ekeke ya 19 mpe, leló, úta sudi kinó epái ya nordi mpo ya makambo nionso toyebi. Ezali likambo lyokó ya matata, kaka mpo ya Tunisie te, kasi lokolá mpo ya Libye, mpo ya bikóló binsó ya nordi y'Afrika, nakoki koloba mpo ya mokili ya Méditerranée mobimba. Mokakatano ya bato bakotambola, boyambi na bangó, bozali elongo na bangó, kasi lokolá na bomanyoli ya sóló mpo ya makambo bikosála 'te bakende, bizali káti ya mikakatano minéne biye tokomona leló.
Libosó ya likambo ya mawa waná, mosála nini Eklezia ya Tunisie ekoki kosála pembeni ya bato bazali na ezaleli ya migration?
Mpo ya Eklezia ya Tunisie mpe ekela na ye bizali na banzelá misáto na likambo liná. Ya yambo, ezali bomipesi ya moí-samaria. Tángo moto mókó akonyokwama, azali na nzala, azali na malili, azali ye mókó, azali motaká, kotuna motuná ya koyéba sóki awuti wápi, to akokende wápi te, kasi tokomeka, ndéngé tokoki mpe kaka na botosi ya sémba, ya kopesa ye lisálisi. Nzelá ya mibalé, ezali eye ya boyóki. Tokomona 'te bato mingi bakokóma áwa, bakotambola na bandoto, makambo bizali kobenda bangó, biye bizali malongá te. Mpe bôngó, tokomeka, mbala insó tokokoka, ya kovanda na bangó mpo ya komituná elongo mwángo ya bomoí eye ezali ya bangó.
Tango Papá Léon XIV, na Canaries kála te, alobaki: «nagúmbaneli libosó ya lokúmu na binó». Lokúmu ená ya bamigrant, ezali lokolá na bokumbi ya Nzámbe likoló ya moto oyo akelama, na elili na ye mpe na bokokani na ye. Ezali na buku yokó ya lisoló ekomama na moí-Tunisie mókó abengami na nkombo ya Walid Amri, nkombo ya buku ezali «Bampómboli ya Lampedusa», eye ebimaka na 2023, liloba lyokó ya kitoko makási mpe mbala mókó ya nsómo, esika wápi mokomi alobi 'te bamigrant bakomipesa na ebale eye efungoli mbanga na ye monéne mpo ya kozua lobí eye bakobongisa na bandoto na bangó. Boni boni bandoto ya bosóló te bizali lokolá mpe boni boni ezali na lisengeli likambo ya kovanda mpo ya kotónga lisusu elikya ya sóló mpe mwángo mókó ya bomoí.
Nzelá ya misáto, ezali eye ya lisúngi na bozongi ya bangó mókó. Waná, kaka bato na nsé ya Sahara te balingi kozonga na bikóló na bangó kasi lokolá baí-Tunisie bakende na sémba te na Poto mpe balingi kozonga na ekóló. Ya sóló, ezali na makambo nionso ya bozongisi ya moto mbala mókó na libota, na mosala, na momeseno, mpe na bomoi káti na bato. Tokosála ndéngé waná na Caritas baningá, mpenza na engúmba ya y'Afrika ya Westi.
Mikakatano nini ya minéne ya bomoto mpe ya mobáteli biye bozali kokutana na yango sik'oyo?
Mokakatano ya monéne leló, ezali 'te likámá ya moto ya migration, eye ezali mpenza ya nsé ya Sahara, mpo ya bisó áwa na Tunisie, ekomema lokolá bobángi bokó na bansó, kaka na ngambo ya baye bayébi 'te ezaleli na bangó ya sémba te ebongi te, kasi lokolá na baye bazali na ezaleli ya sémba, baye bakoki kobánga kobima, koningana, atá ya kokóma kaka na misa, tángo eloko te, na mobéko, ekoki kopekisa bangó te. Mpo na yangó, mpo ya bisó, mókó ya mikakatano minéne ya mobáteli ya sik’oyo, ezali ya kobuka bomoí ya bozali yo mókó mpe kobátela bato baye, na makanisi, na molimo, bakoki komema na nzelá ya bobombani eye, ezali kaka ya koyókisa mawa te, kasi lokolá ya koboma. Tokomeka kobunda na yangó ndéngé tokoki, na nzelá ya litéya ya penepene na bato, ya boyóki, ya bolendisi ya kozala yo-mókó, mbala mókó na sémba, kasi mingimingi na nsé ya botáli mpe mwángo ya Nzámbe mpo ya moto mókó mókó.
Okozela nini ya sóló na maloba mpe bikela ya Tatá-Esántu na Lampedusa? Nsango nini okolikya eyókana mpo elamuisa lisangá ya engúmba ya Méditerranée mpe mpenza y'Afrika ya Nordi?
Ya yambo, Papá akoya na Lampedusa, ya sóló, mpo ya likambo ya migration ezali makási, kasi akoya libosó kokutana na bato ya Lampedusa. Akoya na bokútani na bangó, koleka kaka likambo ya migration. Nakoki te kokanisa nini Tatá-Esántu akoloba, kasi namonaki malámu loléngé amitiaki mpe atiaki bisó na likambo ya migration mpe ya bamigrant, tángo azuaki liloba na Las Palmas, na Canaries, o eleko ya mobémbo na ye na Espagne. Nakolinga aloba loléngé alobaki, ezali botosi ya lokúmu ya moto mókó mókó libosó ya oyo alobaki, ezalaki makási, nagúmbaneli. Kasi lokolá, na liloba kaka waná, abakisi, nalingi lokolá koyébisa binó, na bolobi na bamigrant, 'te bomoí na binó esengeli kobátelama.
Liloba lyokó ya súka?
Lokolá tokoloba ya mobémbo ená ya Papá na Lampedusa yambo ya molúlú, nalingi kaka kozongisa na Elimo-Sántu nionso eye ekoleka kúna. Nazuaka libakú ya kokutana na Papá mbala ebelé basánzá bileki, mpe mbala insó, nazuaki kaka liyóki lyokó, 'te bokútáni ya soló na bato ekopesa maloba maye bizali kitoko na mokánda mókó, sóki nakoki koloba.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye