Luka

Elili ya bolakisi Elili ya bolakisi 

Côte d’Ivoire: Eklezia ekobakisa misála po na maponami ya kimia

Na mwá ba pósó ya maponami ya mokónzi ya ekóló etiami mokolo ya 25 ya sánzá ya zómi 2025, Lisangá ya Côte d’Ivoire etáli Sémbo, Kimia pe Nzinganzinga afúngolaki, mokolo ya minei ya 4 ya sánzá ya libwá, o ndáko ya Lisangá ya ba episkopo, molongó ya mayangani na likambo-likonzi: « Côte d’ivoire, mabéle ya kimia pe ya elikya ». « Koleka libosó pe koloba te » ezali likambo ezali kolukama na mayangani waná, nzókandé epayi ya bato ya politiki mikakatano bizali pe bikobángisa ‘te maponami bileka na mob

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Pembeni na milio 9 ya bato ya Côte d’Ivoire bakobéngama na maponami po ya kolubola mokónzi ya ekóló zambi ya mibú mitáno. Na boluki kosilisa mobúlú, Lisangá etáli Sémbo, Kimia pe Nzinganzinga ebongisi molongó ya mayangani, engebene na sángó Norbert-Eric Abékan, secrétaire exécutif na yangó. Ezali po ya « kobimisa masoló, kosála makoki ya bokanisi na mozindo pe komema moto mókó mókó ya koyéba mokúmbá na ye lokóla mosáli ya kimia pe ya boyokani ». Ezali po, ebákisaki ye, ya kokáta likambo ya mobúlú ya maponami eye etika bilembo na lisapo ya ekóló.

Bozito ya bokabwani na bituluku

Na bofúngoli, professeur Henri Bah, motéyi ya philosophie na Université Alassane Ouattara ya Bouaké, apesaki liyangani mókó na likambo-likonzi: “Makambo pe bonene ya ba ethnies pe biyamba na maponami ya mokónzi ya ekóló na Côte d’Ivoire: pási ya botóngi ekóló na maponami”. Na bolandi loléngé makambo bilekaka, maloba pe botáli, Henri Bah akundolaki ‘te maponami bilingama na ba etnnies pe biyamba, na bobóti makambo ya minene: bokónzi ekóma ya bato, bokwéyi ya botiyi motéma na bulamatari, mindondo kati na bato songolo na pakala pe bobwáki mosiká makambo ya sóló sóló ya nkita pe ya bozali ya bato.

Alakisaki lokóla likambo ‘te úto boyéi ya ba parti ya politiki ebelé na ekóló, maponami ya mokónzi ya ekóló bizali kolendisa bokabwani káti na bato na esika esangisa ekóló. Po na ye, o eleko ya maponami binsó, “bokabwani ya ba ethnie pe biyamba ekokende elongó na boponi na politiki, na bobongoli liponami na esika mókó ya kokolisa bozali na masangá na esika ya elobeli ya bana ya ekóló”.

Kotónga esika mókó epayi wapi ethnie na eyamba bizali bisáleli ya politiki te

Po na kobima na libúlú ena, professeur Bah apesaki ba nzelá misáto: kotiya mosolo na boyékoli pe liloba ezali na likoki ya kobébisa mabongami ya bokabwani; kolendisa bobimisi ya molongó ya bato ya sika na politiki eye ekobóya bokabwáni; na súka, komátisa momeseno mókó ya bolingo pe ya kobika-elongó ebótami na bilongi ya mokili lokóla Socrate, Gandhi, Martin Luther King to lisusu Papá François.

Asúkisaki na bobéngi kotónga mbóka mókó “efúngwama”, epayi wapi ethnie pe eyamba bikozala bisaleli ya politiki te, bikokóma ba nkita na mosála ya ekóló. Abiangaki moto mókó mókó ya Côte d’Ivoire ya “kozala mosáli monene ya ekóló eyókani kaka na ye mókó te, kasi lokóla kozua esika na ye na bosáli mbóka mókó makási epayi wapi mbano ya ekóló, ekozala eloko ekokabolama pe ekotéyama mingi”.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

09 sánzá ya libwa 2025, 09:39