Luka

2025.09.09 Mgr Sébastien-Joseph Muyengo - Episkopo ya Uvira - RDC 2025.09.09 Mgr Sébastien-Joseph Muyengo - Episkopo ya Uvira - RDC 

Na RDC, Mgr Muyengo akebisi mpo na kobeba ya bokengi na Uvira

Mgr Sébastien-Joseph Muyengo, episkopo ya dioseze ya Uvira, amonisaki ‘te azali na mawa makasi mpo na kobeba ya bokengi na engumba ya Uvira mpe zingazinga na yango. Na liyebisi ebimaki o mokolo mwa mwambé ya sanza ya setémbe, episkopo, oyo, atako azali mosika na dioseze na ye mpo na ntina ya bokono (maladi), alobi ‘te azali kolanda na mawa mpe na bokengi makambo mauti koleka, oyo ezali na matata, na botomboki mpe na mobulu.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mikolo mileki, engumba ya Uvira na sud ya province ya Sud-Kivu eza na tension makasi kati na ba acteurs ya société civile mpe ba wazalendo na ba forces armées ya Républiki Demokratiki ya Congo, nsima ya boponami ya général moko oyo bato bazalaki koboya mpo na kokamba secteur opérationnel na etuka ena. Nzoka nde eteni monene ya province ezali na maboko ya bato ya AFC/M23, bongo, lolenge bazali komeka kotanda bokonzi bwa bango na molende na bitando biya ya engumba, eyebani nayino te. Bato bakufi mpe basusu bazoki na mobulu ya ba wazalendo, ba miliciens oyo bazali na boyokani na mampinga ya Congo mpo na kobundisa etuluku ya batomboki AFC/M23. Bato basusu ya mboka basangani nà bango. Ezali nde kati na loyenge loye, nde Mokonzi ya esika enà, oyo azali na esika ya bopema ya maladi, azali kotombola na mosika, mpo na kobangela likàma ekoki koya. Zali kofunda bozangi bokengi oyo ezali sé kokoba, mpe bobangi mobulu oyo ezali kotungisa bomoko ya bato mpe kimya na etuka oyo ya Esti ya RDC.

Koloba bobele mbala moko epai ya bakonzi

Mgr Muyengo asololaki mbala moko na mokonzi ya Ekolo, mokambi wa ekolo. Kasi nà mpe bakonzi ya basivil mpe ya basoda, kosengaka bango ‘te bazwa mikano ya lombangu mpo na kobatela basivile. Episkopo azali mpe komituna soki eloko nini mpenza etindaki bango na koponama ya général eye. Mpamba té, bato bazali kokanisa ‘te ezali mpo na makambo ya mpasi oyo esalemaki ntango Goma mpe Bukavu ekweaki. “Mokano moye, elobi episkopo-mokonzi, ezali kobimisa kozanga boyokani, bobangi mpe boyikiyiki kati na bato”.

Mbela na lisangà ya bikolo na mokili (Communauté internationale)

 Na komona lolenge mobulu ezali kokoba na etuka - atako boyokani ekomami mpo na kokitisa bitumba - Mgr Muyengo asengi na bato ya mokili mobimba oyo bazali kosala mpo na kimya na RDC: Rwanda, Qatar, Etats-Unis mpe baninga basusu ya etuka yango,bàsàla makambo emonana mpo na kosukisa mobulu mpe kozongisa kondima ya bato.

Kobangela to koboya mobulu

Episkopo azali mpe kosolola na baye bazali kosangana mbala moko na mobulu moye, na ndakisa ya bakonzi ya bampulisi mpe basáli-mibeko. Na maloba ma ye epai na mampinga ya Congo démokratiki (FARDC), Mokonzi mwa yambo akundoli bango mosala mwa bango to etinda ya bosantu bazali na yango: «Kobatela bato mpe kofungola masasi te likolo ya bana mboka oyo bazangi bibundeli». Abengaki bato ya Uvira na makambo mibale: mpo na kimya, mpo na koboya mobulu, kasi mpe mpo na botelemeli ya kimya, ya bana mboka. Tembe te, dioseze ya Uvira ekokweya te, liboso ya makaneli ya kokabola mboka (balkanisation).

Mokolo mwa mokano ya Feuille de route ya mangomba ma bakristu (biyamba) mpo na kimya na RDC
Mokolo mwa mokano ya Feuille de route ya mangomba ma bakristu (biyamba) mpo na kimya na RDC   (ANSA)

 Tokokufa te, tokozala na bomoi

Episkopo asukisaki liyebisi lya yen à maloba maelikya mpe ya bondeko. Apesaki mabondisi ma ye na mabota maye makufeli bato, amitiyaki na esika ya bato oyo bazokaki, mpe alendisaki bato ya Uvira na elimo. Na bondimi, alobi ‘te: “Tokokufa te, kasi tokozala na bomoi. Mpe Uvira ekokweya te”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

10 sánzá ya libwa 2025, 11:06