Luka

PALESTINIAN-ISRAEL-CONFLICT-BETHLEHEM

Sango Faltas alobi ‘te na Gaza, “ezali solo nà ezalela ya bozangi bomoto”

Na mobembo na ye na Italie, momfelele Ibrahim Faltas, mosangani ya lingomba lya ba franciscains, alobelaki ezalela ya sɔ́mɔ oyo bato ya Terre Sainte bazali na yango mpe akebisaki ‘te “soki makambo makobi bobele bongo, bakristu bakosila nye, ata moko akotikala mpenza te”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Sango Ibrahim Faltas, monfelele moko ya lingomba ya ba franciscains ya Custodie ya Terre Sainte, alobaki ‘te: “Makambo mazali mabe na Gaza”, na mobembo na ye na Italie, esika asalaki makambo mingi, kati na yango mpe likita na Conseil ya bilenge ya Méditerranée. Na lisoló na ye na Toscana Oggi, zulunalo ya poso na poso ya Italie, Sango Faltas apesaki makanisi ma ye ma ntina na ezalela ya sika na makambo ya Gaza.

Bazangi manso

«Bato bazali kokoba kokufa na nzala, na mposa ya mai mpe na molunge», ndenge alobaki. Bongo, abengaki likambo liye, “bozangi bomoto”. “Bato ba mokili mobimba bazali wapi? Wapi lotomo la moto?” Etunaki momfelele oyo ya Lingomba ya ba Franciscain, nà maloba ekosima mpenza motema. Na mokolo ya yambo ya sanza ya libwa (Setembe), Sango Faltas alimbolaki ‘te biteyelo bifungwamaki lisusu na Mabele Masantu mobimba, na Beteleme mpe na Yeluzalema. Nzokande, na Gaza, “bana bakendeke lisusu kelasi te banda ba mbula mibale”. “Bazalngi manso: bakotaka kelasi te, bazwaka lisalisi ya monganga te”. Alobi ye. “Bazali na minganga te, bankisi mpe te”, bongo abakisi mpe ‘te: “ata kosakana ya mpamba bana bàna bakoki kosala yango te”. Alobi ‘te “bayebi kaka bitumba, kokima, kobombana, kobukama mpe kobebisama".

Sango Faltas tango akendeki kotala Roma na 2024.
Sango Faltas tango akendeki kotala Roma na 2024.

Sango faltas alobi lisusu ‘te, mpasi ya bato esuki kaka na Gaza te: “Betleem mpe ekomi boloko oyo ekomonana polele”. Amonisaki ‘te na kokanga bisika ya bokengi, bato oyo bazalaki kosala na Israël liboso ya etumba nà mikanda ya mosala ya mokolo moko mpamba, bakoki lisusu kosala yango te. Bazali na likoki ya kosala te mpe kokende te. Baye bazalaki kosala mibembo mpo na kozwa biloko ya kobikela, basalaki lisusu mosala monà te, ut’o mbula mibale.

Faltas alimbolaki ‘te etuluku ya bakristu na Beteleme mpe bazali konyokwama, mpamba te mabota soko nkàmà moko na tukù mwambe na mitano (185 familles) - bato koleka nkamà sambo (700) – batiki mpe basili kolongwa na engumba yango. Alobaki ‘te soki makambo ekobi kaka lolenge ezali, bakristu bakozala lisusu te.

Elembo makasi ya elikya

Na kati ya makambo ya somo ya bitumba, Sango Faltas alobelaki mpe likambo lya elikia mpe ya bomoko. Na sanza ya yuni (motoba), baepiskopo ya Toscane basalaki mobembo ya losambo na Yeruzalema mpe na Beteleme, oyo sango ya lingomba ya ba franciscain abengaki yango «likambo ya mpiko» mpe ya ntina mingi mpo na bakristo ya etúká ena. Alobaki ‘te likita to bokutani ya baepiskopo «epesaki elikya na bato ba mboka wana: bato banso basepelaki na bokutani bonà, mpe bazali kokanisa yango naino».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

05 sánzá ya libwa 2025, 13:02