Bamamelo ya Santu Yosefu ya Cluny na ekolo ya Benin : Misio ya sika na mosàlà ya Eklezya
Na tango ya misa ya bofungoli ndako ya liboso ya lingomba liye lizali na nsé ya mibeko mya Pàpa (droit pontifical) na Bénin, Mgr Roger Houngbédji, mokambi ya Lisanga ya baepiskopo, akumisaki boyambi ya ba mamelo na mosala mwa bato ba Nzambe. Likita lya ba episkopo ya Bénin epesaki misa ya sanza na sanza «Kotosa Liloba lya Nzambe mokolo na mokolo » na lingomba lya bamamelo (Sœurs) ya Saint Joseph ya Cluny.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Moboko moye ezali elembo oyo emonisi ‘te : Lingomba ya bamamelo ya Saint Joseph ya Cluny eyei kovanda na ekólo eye. Engebene Mgr Houngbédji, kozala na bango na esika ena, ezali elembeteli ya bososoli oyo eyokani na mokano mwa Nzambe. Nsima na yango, Mamelo Hortense Atabré, oyo azali mokambi ya province na Lingomba mpo na ngambo ya Afrika ya westi oyo elobaka lokotà ya lifalansa (Afrique francophone), amonisaki boni boni bakosala na ekolo ena, to alakisaki mokumba ya bamamelo na Bénin.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
12 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 16:49