Luka

2025.11.18 Basangani ya Conférence épiscopale Sénégal, Mauritanie, Cap-Vert mpe Guinée-Bissau  2025.11.18 Basangani ya Conférence épiscopale Sénégal, Mauritanie, Cap-Vert mpe Guinée-Bissau  

Bokutani ya baepiskopo ya Sénégal, Mauritanie, Cap-Vert mpe Guinée-Bissau esili

Na suka ya misala ya likita na bango ya mbala ya yambo, ya mobu ya mosala ya pastorale 2025-2026, oyo esalemaki o mokolo mwa 10-18 ya sànzà ya Novémbe 2025 na Kédougou, na diocèse ya Tambacounda, na Sénégal. Baepiskopo basengaki na mbulamatari na bango, bàsala makasi mpo na kobongisa ezalela ya bomoi ya bato, ya nkita, ya politiki mpe ya bokengi na bikolo bya bango. Batondaki botondi na ba kristu ba bango mpo na bomipesi ya bango mpe lisungi na bango kati na mosala ya Eklezya na bango.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Ba episkopo yaLisanga lya baepiskopo ya Sénégal, Mauritanie, Cap-Vert mpe Guinée-Bissau, bakutanaki na Kédougou, na dioseze ya Tambacounda na Sénégal, mpo na likita na bango ya mbula na mbula; kuna, balobelaki ba ntina mingi ya makambo. Likita  lya baepiskopo emonisaki «ntango ya bondeko mpe ya bomoko elongo na bato, mingi-mingi bato oyo bazali na likama koleka», «na elimo ya sinodalite». Baepiskopo basololaki na ntina ya makambo ya politiki, ya nkita mpe ya bomoi ya bato na bikolo bya bango, mpe makambo ma Eklezya na badioseze na bango ndenge na ndenge.

Makambo ya bomoi ya bato, ya nkita mpe ya politiki ezali kobeba

Na maloba ma bango ya nsuka, ba Tata episkopo wa lokumu, baepiskopo-mokonzi, mpe baepiskopo zomi na misato (13) ya Lisanga lya baepiskopo, basengaki na molende na bakonzi ya bikolo ba bango ‘te : bàzala polele mingi na lolenge ya bango ya kosalela biloko na mokili mpo na bolamu bya bato. Na yango, balobaki ‘te esengeli kosala noki-noki mpo na kosilisa kanyaka mpe bobola, kokitisa bobola mpe kozanga mosala, mingi mpenza epai ya bilenge. Baepiskopo batunaki bakonzi ya mopelengano (politiki) soki basengeli kotosa maloba na bango. Lisusu, bazalaki kotelemela lolenge inso ya mobulu, bakisa mpe kokosa bato mpo bándima makanisi ma bango. Mp ona maye matali bokengi, baepiskopo ya bikolo bina minei bamonisaki bobangi ya bango mpe bakebisaki bakonzi ba bango na ntina ya bozangi libateli oyo ezali kokola mpe ezali kobangisa mingi. Ba pesaki ndakisa na likambo ya terorisme oyo ezali kokanela bikolo mingi. Bazali mpe komitungisa mingi mpo na likambo ya somo ya bato baye bazali kokende bamboka mopaya na lolenge elongobani te, mpe mpo na bato bayiké bazali konyokwama na ntina ya likambo lyango. Mingo mingi o kati na bango bazali bilenge. Epai mosusu, Likita ya baepiskopo emonisi motema mawa na bango mpo na bato baye bazali konyokwama na ntina ya ntalo ya bomoi ezali sé komata, ba mpela, mpe makámá misusu ya biloko bizalisami.

Mpo na Eklezya ya makasi, ya bosangani mpe ya bondeko

Na misala mya bango, baepiskopo balobelaki mikakatano miye mikangami na Eklezya. Bazali mpe kolendisa mpe kopesa matondi na bakristu ba bango mpo na milende bazali kosala, mingimingi mpo na mayele ya kosala bazali kozwa mpo na kosalisa bato ba mboka ba bango na mosuni mpe na mbongo. Na na molimo ya bosangani, basengaki na bango básala boyokani makasi elongo na basángó ya mboka ba bango. Na yango, babyangemi básangana elongo mpo na kotonga masangá ya bakristu ezali na bonsomi mpe na bomoko. Mpo na kokokisa mokano mwango, likita lya baepiskopo esengaki bango básalelaka mbongo ya Eklezya na ndenge ebongi mpe bápesaka lapolo ya makambo manso.

Liboso lya matata ya bato bayiké oyo ezali kobebisa bondeko kati na bato ya ekolo moko, ya bato ya mboka moko to ya libota moko, ba prélats bazali kokundwela bakristu banso mokumba mwa bango ya kozala basali ba boboto (kimya), baprofeta ya elikia mpe bisaleli ya kozongisa boyokani. Na nsuka, na oyo etali bomoi ya losambo ya eklezya ma bango, baepiskopo babandaki kokoma mokanda mwa bango ya lisanga mpo na eleko ya arezimo 2026 na motó ya likambo: “Kotonga Eklezya ya lisanga, oyo ezali na bokonzi na yango moko na mosala ya bolamu ya bato banso mpo na kotombola bosembo mpe boboto”. Na nsuka ya maloba ma bango, ba episkopo ya Sénégal, ya Mauritanie, ya Cap-Vert mpe ya Guinée-Bissau basengaki ngolu mpe bobenisi (lipamboli) ya Nzambe likolo ya bikolo bya bango mpe likolo ya mabele ya Afrika mobimba.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

19 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 10:21