Cote d’Ivoire: Eklezia ezali kobondela mpo na baluki esika ya kovanda o mboka bampaya oyo babungaki na nzela ya boombo
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
“Tolingi kotika milimo ba bango na Mokonzi mpe tozali kolendisa bopekisi mpe lisungi na bampaya”, elimbolaki Georges Adon, mokambi ya Sant’Egidio. Akambaki losambo mpo na “kopesa lokumu na bato baye bakufaki na nzela mpo ya koluka bisika ya kovanda o mboka ya bampaya. Balingaki mpe kolamusa mayele ma bato, na koyeba likàmà liye bazali kozwa, tango bazali koluka kokende na mboka mompaya kozanga ndingisa ya Leta”. Abakisaki ‘te “bato koleka 70 000” bakufi na mbu Méditerranée to na esobe na bambula oyo euti koleka. Losambo lyango lisalemaki na klima ya malamu kati na baepiskopo, banganganzambe, basàngo, bakristo mpe bacivils. Bango banso bazalaki kobelela ‘te: “Bomoi bwa moto bozali na motuya mosantu. Mpe bazali kosenga ngolu ya Nzambe mpo na ba migrants oyo babungaki na Méditerranée to na esobe ya Libye.”
Oyo nde Elikya ya mbamba
Nà mawa o motema, Emmanuel Aka Amon, Secrétaire exécutif ya Sous-Commission ya Apostolate ya Mbu, ya ba Migrants mpe ya bato oyo batambolaka, apesaki litatoli na ye mpe alobi ‘te: “Mingi o kati na bango bakatisaki te, bakomaki o ngambo mosusu te”. Batikaki kaka bamasuwa oyo ebebaki, basapato, mpe bilamba oyo babwakaki na libongo. “Oyo elikya ya mpamba”. Aka Amon alendisi: moto nyonso na komituna, mpamba te, engebene na yé, tozali liboso lya likama ya bato, mpe tozali na mokumba epai ya basusu.
Kotonga eldorado awa, nde Libyangi lya Mgr Yedoh
Na bosukisi ya milulu, Mgr Bruno Essoh Yedoh, episkopo ya Bondoukou mpe mokambi ya Commission épiscopale mpo na pastorale sociale mpe développement humain intégral (CePAS-SDHI), abwakaki mbela makasi epai na bilenge oyo bazali na mposa ya lisalisi. Tozwaka bato mingi ya sous-région oyo bamonaka Côte d’Ivoire lokola eldorado. Nzokande, bilenge mingi ya mboka na biso, bakanisaka ‘te eldorado yango ezali na esika mosusu. Nazali kobenga bango, batonga yango awa, mpo ‘te mboka na biso etondi na makoki. Ata soki ezali mpasi kozwa mosala, na mpiko mpe na lisungi ya basusu, okoki kobanda misala mya mikemike ya elikia mpe oyo ekoki kosunga yo, elobaki yé.
Na kolanda bilembo ya Organisation Internationale ya Migration (OIM), bato pene na 8 938 bakufaki na nzela na 2024, yango esali ‘te mobù monà mozala mbula ya liwa ya bato mingi koleka. Na nsuka ya molulu, bayangani basambelaki mpo na mabota maye mazali na mawa, mpe mpo ‘te mibeko mya bampaya etambwisama na motema mawa mpe na bosembo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye