Mozambiko: Episkopo-Mokonzi ya Nampula asengi lisungi lya lombango mpo na bato 30 000 oyo bakimi mboka na bango na Memba
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Kati na lisoló na ye na Vatican News, Mgr Saure amonisaki bobangi bwa ye makasi mpo na ezalela ya mpasi oyo mabota maye masilaki kokima bamboka ya bango, bazali kokutana na yango. «Bato koleka 30 000 bakimi na bisika ba bango ya kofanda na poste administratif ya Alua, nsima na kokima bandako ba bango mpo na bitumba ya ba terroriste na etukà ya Nampula». Episkopo-mokonzi ya Nampula amonisaki ntina monene ya bomoko ya solo solo, mpo na kosunga mabota maye mazali kokima mobulu oyo euti na ba tomboki ba djihadiste oyo bazali kobundisa na Nordi ya Mozambiko.
Makambo ya bato mazali kotungisa makasi.
Alobi ‘te azali na boyokani mbala na mbala nà episkopo ya Nacala, epai wapi diosezi na ye ezali na etuka ya Memba, mpe andimi ‘te Caritas ya diosezi ya Nampula ezali na mokano ya kopesa lisungi ya solo mpo na kosunga bato baye bakimaki bamboka na bango.
Bosenga ya lisungi na lombango
Soki balongoli mobulu, likambo ya ebandela ya eleko ya mbula na Sudi ya Afrika ezali kobakisa lisusu mpasi na bomoi ya bato mingi oyo bakimá mboka na bango, epai wapi bazali kofanda na bandako oyo batongelaki bango.
“Bwalé ya bato baye ezali ya mpasi mpe ya kobulunganisa”, elobaki Mgr Saure mpe abakisi ‘te ezalela ya makambo etikali kaka ya mpasi mpo na bana. Bazali mpe kopesa ba nsango ya liwa nà nzala mpe na mposa ya mai tango mabota ma bango bazalaki kokima bato baye basimba-mandoki.
Episkopo-Mokonzi ya Nampula abengaki lisusu ba-Mozambiko mpe communauté internationale mpo na kosunga bato baye bakimi mboka na bango. Abetaki nsete na bosenga bazali na yango ya lisungi ya lombangu, mpe alobi ‘te: “Bazali na mposa ya mbongo, bilamba, nkisi, bandako mpo na kolala, mingi mpenza koleka nyonso, bilei”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye