Luka

Na RDC, Kobomama ya bato na parwasi ya Byamwe, ebimisi lisusu bosenga ya lisungi liboso lya bitumba ya ba ADF

Parwasi ya Saint-Paul na Byambwe, na Nord-Kivu, na Républiki démocratiki ya Congo, ezwaki likama ya liwa ya bato ebele. Makambo manso malekaki na butu ya 14 mpo komona mokolo mwa 15 sanza ya Novémbe ya 2025, ntango ba combattants ya ADF-NALU bakotaki mpe babomaki bato tuku mibale na mwambe (28), batumbaki centre ya santé ya parwasi mpe babebisaki ba ndako mingi.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Kati na lisoló na ye na Radio Vatikan, Sango-mokonzi ya parwasi Saint Paul, Abbé Katsere Gislain, alimboli ‘te na butu ya mokolo mwa mitano kino ya mokolo mwa poso, babomi-bato batumbaki bandako zomi na mibale na kartier Makuta mpe zomi na moko na Django. Bato tuku mibale na mwambe bakufaki, basi zomi na motoba (16), kati na bango elenge mwasi moko, mpe mibali zomi na mibale (12), kati na bango bilenge mibali mibale. Mibali mingi babomamaki kaka na ngonga wana na bisika yango, na bitúká ya Makuta mpe ya Django.

Likàmà ya somo ezangi ndimbola, kati na ezalela ya bozangi libateli

Na Biambwe, ntina babomelaki bato eyebani te. “Toyebi te nini etindaki bango básala bongo. Ezali motuna oyo moto nyonso azali komituna”, elobi sango-mokonzi. Azali kolobela  mpe akanisi te ezali ba ADF-NALU, mbamba te, bang onde bato bazali kosala mingi mpenza bitumba na etuka ena. O mokolo molandaki kobomama wana, bato mingi bakimaki. Bato ba mboka bakimaki bandako ba bango mpo na koluka libateli na Butembo mpe na Ziampanga. Klima ezali malamu te. Moto nyonso azali komitungisama. Nganga-nzambe alobi ‘te: “Ezali mpenza likambo monene”. Bato ya mboka bazali kobanga ‘te batomboki bazonga lisusu, mingi mpenza mpo ba sources mingi ya mboka balobi ‘te basimba-minduki bazali kaka kotambola na esika ena.

Bokundami ya bato baye bakufaki na likàmà
Bokundami ya bato baye bakufaki na likàmà

Eyano ya bakonzi: eyaki nsima ya ngonga kasi emonani polele

Bakonzi ya mboka, bakonzi ya Leta mpe basoda, bakendaki na esika yango nsima ya makambo oyo esalemaki. Nzokande, kozala na bango epekisaki te mobomi na bango. Sango-mokonzi ayokaki mawa mingi na komona ‘te bakokaki te kopekisa kobomama wana ya bato. Kasi, alobi ‘te basoda batindamaki na mboka yango mpo na kopekisa ‘te bato basusu báyà mbala ya sika kobundisa bango.

Parwasi, esika ya nsuka ya molimo epai wapi bato bazali konyokwama bamibombisi

Na ntango ya mpasi, parwasi ezali moko ya bisika ya lisungi. Sango alobi ‘te, “Eloko nakokaki kosala ezalaki bobele kosala misa mpo ya kokundoli bato bakufáki”, mpe na mokolo moye molandaki, asalisaki mpo na kokunda bato mingi oyo bakufaki. Na lisangá lya bakristu, mabota maye mazalaki na mawa, maye mazangaki manso, mazwaki esika bayambaki bango mpe esika ya libondisi.

Bokundami bwa bato baye bakufaki na likàmà
Bokundami bwa bato baye bakufaki na likàmà

Mbela ya Pàpa Leon ya zomi na minei, elembo ya elikya

O mokolo mwa lomingo, na ntango ya Angélus, Nganga-nzambe Mokonzi  abondelaki mpo na bato bazwaki likàma ya Biambwe, mpe abondelaki mpo na kimya na Esti ya RDC. Basepelaki mingi mpo na bokebi balakisi o kati ya eklezya ya bango oyo ezalaki na mpasi. “Tozalaki kokanisa “te babosani biso. Ntango lolaka la Tata Mosantu eyokanaka mpo na kolobela ezalela na biso, toyokaki esengo mingi mpenza”, elobaki sango.

Atako balakisi kimotema mawa, Eklezya ya Katoliko ya mboka ena, ezali kosenge na bikólo ya mokili mobimba ‘te “básala likambo moko. Monguna azali pene na mokili mobimba. Tosengeli na lisungi”, elobaki sango, mpe asengaki bakonzi ya Congo ‘te balendisa bibongiseli ya bokengi.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

17 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 21:09