ACEAC: etuluku ya bato ba mayele mpo na koyeba mikakatano mya mpoelengano (politiki) ya mikili mya bitima binene (Grands Lacs)
O kati ya makambo ya etuka oyo ezali kaka na mitungisi, Association ya ba Episkopo ya Afrika ya Kati kati (ACEAC) esangisaki bato ba mayele na mokolo mwa 26 mpe 27 Novémbe, mpo na kobongisa ndenge ya kotalela makambo ya bato mpe ya politiki na bitima binene mpe kobongisa lolenge ya kosala mosala na bango ya pastoral. Etapi ya mibale ekokoba na Kinshasa kobanda mwa 10 kino 14 desembe ya 2025. Sango Jean-Pierre Badidike Mulamba, Secrétaire général ya ACEAC, alobeli mikakatano maye mazali o kati.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
04 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 12:40