Sango Youhanna, mosaleli mya bato bya mpasi na mindelo mya Syrie
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Tozali kotangisa na mobimba na yango, litatoli lya Sango Youhanna-Fouad Fahed. Bazali balobeli ya “mibali mpe basi oyo bazali kokoba kolinga Nzambe na kimya, atako bomoi ezangisi bango nyonso”.
Père Youhanna-Fouad Fahed
«Mokonzi akoyanola mpe akoloba na bango ‘te : Ya solo solo nalobi na bino ‘te lokola esalaki bino yango epai na moko na bandeko ba ngai oyo baleki moke, bosalelaki yango ngai-moko» (Mateo 25: 40)»
Tata Mosantu,
Nayei na bomikitisi bonso, kotondo bino botondi, mingimingi mpo na ngolu oyo bopesi ngai ya kokabola elongo na bino litatoli la ngai lokola sango ya parwasi moko oyo ezali na ndelo ya Nordi ya Liban na Syrie, na mboka moko ya mangomba ndenge na ndenge na nkombo Debbabiyé.
Nazali Youhanna-Fouad Fahed, nabotami na Kobayat (Akkar), nazali Sàngo ut’o mibù mwambé, nabali, nazali tata ya mwana mwasi ya mibu motoba, mpe nazali molakisi ya mikanda mya Lifalansa na eteyelo ya likolo ya mboka na biso. Mosala mwa ngai ya pastoral na Debbabiyé, mwa mboka moke oyo ezali pembeni ya engumba, epai Bamizilma (ba-Sunni) mpe Bakristu (ba-Ortodokse mpe ba-Maronite) bafandi esika moko, esalisaki ngai na yeba boni boni azalaki nzeneneke ya makambo mingi ya mabé esalemi o miso ma ngai, kasi na lobaki yango te ; eleki bongo mibù zomi. Nazali kolobela yango na bokuse na makambo misato:
Kobanda etumba ya Siri ebandaki, mboka eye enyokwamaki mingi, mingi mpenza na babombi oyo ezalaki kouta na ngambo ya Siri. Ba-Maronite mingi batikaki bandako ba bango mpe bakendaki kofanda na mboka na biso, mosika na likàmà oyo ezali na mindelo.
Lokola nkita ebebaki makasi, makambo ebebaki lisusu koleka:lotiliki ezalaki lisusu te, mai ya peto oyo ezalaki kouta na bapompi ya lotiliki ezalaki lisusu te, mpe bato oyo bazongaki na bamboka na bango nsima ya kobwakama ya babombi bazalaki lisusu na eloko ya kobikela te.
Na mokolo mwa mwambé ya sanza ya zomi na mibale (8 decembre) ya mobu 2024, ntango bokonzi ya Syrie ekweaki, bato ya parwasi yango bazalaki na matata makasi. Kasi likambo lya mpasi koleka ezalaki oyo esalemaki kaka na ngambo mosusu ya mindelo: bato oyo bazalaki konyokwama bazalaki kokatisa ndelo na kimya inso, kokima mpasi, kobombana pembeni mpe kopesa ata elembo moko te ya kozala na bango. Moto moko te akokaki koyoka kolela na bango.
Tata Mosantu
Na mpokwa ya mokolo ya lomingo, ntango tozalaki na misa, mwa liboke oyo batyaki mpo na kokɔngɔla mbongo ebimaki na miso na ngai mpe ezalaki na mbongo ya ekólo Syrie. Ezalaki mbeka oyo esanganaki na mpasi.
Na parwasi, ata likambo moko te ezali komonisa ‘te tozali na mpasi; makambo manso ezali kimya. Nzokande, na nse ya kimya wana, ezali na bato oyo bazali konyokwama na mpasi ya Liban, mpe bato mosusu, oyo bazali kobombama, bazali konyokwama mpe bazali na mboka mopaya.
Nasengelaki kosala eloko kani? Nayebaki eloko moko te... Ngai moko, nayokaki mpasi elongo na bato ba ngai, mpasi ezipamaki na bobangi, mpasi ebombamaki na soni ya kosenga lisungi, nakendaki koluka bango.
Nakutanaki na mabota maye bakimaki minyoko mpo na eklezya na bango, mabota oyo bakimaki epai ya bandeko ya pembeni mpo na kobatela bana ba bango ya basi na bato oyo bakoki kokanga bango mpo na kobalisa bango na makasi. Bilenge, basali ya kala ya mbulamatari ya Syrie, babenganamaki na mboka na bango, bazangaki biloko binso mpe bakómaki babola. Bilenge bisusu bazalaki kokana kokima na lolenge elongobani te, mpo bakende na Poto, batyaki bandoto na bango na maboko ya bateki bato mpo na kokotisa bango na mboka mopaye. Kasi bazalaki koyiba mbongo ya bango; bongo mpe, mabota manso oyo batekaki bandako to mapango ma bango mpo na kokatisa mindelo, kozanga elikya, kozanga ata mwa elikya moke mpo na bomoi bwa bango ya mpasi…
Tata Mosantu
Liboso lya ya mpasi eye moto moko azalaki koyeba té, nazalaki komiyoka ‘te nazangi nguya, kasi nazalaki mpe kosala, bobele na koyikela minyoko wana mpiko na nzela ya mabondeli. Bilembo ya bilongi ya bato wana ya mpasi, emonisaki ngai bozindo bya bondimi ya bato oyo, ata bongo, bandimaka kaka ‘te Nzambe azali. Mpasi na bango ekokóma likabo, mawa na bango ekokóma elikya. Kasi elikia wana, Tata Mosantu, esengeli esimbama, ebondisama, moto azala elongo na yo.
Nazali kotatola na ntina na bato oyo bamonanaka te, mibali mpe basi oyo bazali kokóba kolinga Nzambe na kimya nyonso, atako bomoi esili kolongola bango biloko binso. Nazali awa na nkombo ya mabota maye babungisi biloko binso, na nkombo ya bilenge biye bizali komona avenire kaka na kokima, na nkombo ya bana baye bazali kokola na kati ya bamindelo mibale kasi bazali kobatela na miso na bango mwinda ya boyambi.
Tata Mosantu
Nazali kosenga bino liloba moko, bobenisi boko, elembo moko oyo ekozongisa na milimo ya bato baye, makanisi to mayoki ‘te babosani bango te. Mpamba te mbala mingi, liloba lya Mobateli Monene ya mpate ekoki kolamwisa elikya na esika oyo nyonso emonani ‘te esili mpamba. Lokola mwana, nà limemya inso, natye losambo oyo na maboko ma bino, na elikia ‘te motema mwa bino mwa botata, eyoka kolela na bonkuku, ya bampate baye bazoki.
Matondi
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye