Luka

Baluki-mboka (Migrants) ya  Amerika ya katikati, pene na mindelo mya Guatemala, na Honduras, o mokolo mwa 15 Yanuali 2022. Baluki-mboka (Migrants) ya Amerika ya katikati, pene na mindelo mya Guatemala, na Honduras, o mokolo mwa 15 Yanuali 2022. 

Ba Eklezya ya Amerika ekundoli «Lokumu loye moto akoki kolongola te na Baluki-mboka ya kovanda (Migrants) ».

Baepiskopo ya biteni ya Amerika ya nordi mpe ya súdi batindelaki bakristu na bango nsango moko nsima ya likita lya bango na engumba Tampa, na etúká ya Floride, kobanda mokolo mwa 14 kino 17 Febwáli. Mpo na likambo lya bapaya oyo ezali koleka na mikili na bango, ba episkopo ya Canada, ya Etats-Unis, ya Amerika ya Latini mpe ya Caraïbes balingi kobakisa boyokani na kati ya mikili mpo na koyamba mpe kobatela bato oyo bazali kokende kofanda na bamboka na bango.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na nsango ya mokolo mwa 17 ya sànzà ya Febwàli, na bato ba Nzambe bàzali na mobembo na Amerika, Eklezya ya Amerika ekomaki makambo maye mazali kotungisa bakristu ba bango na mikili ndenge na ndenge: ezalela ya babola mpe bato bazangi makasi, lokumu mpe lotómo la bato ba mboka, maladi ya koteka bato mpe kolona bangi, kasi mpe «kokoba ya bokabwani oyo ezali kobebisa maloba ma bato mpe ezali kobebisa boyokani kati ya bato» mpe mingimingi «kozanga libateli ya bapaya bazali kofanda, koleka mpe koluka lobi ya bomoi (avenire)» na mikili mina.

Na maye matali likambo lya kokenda na mboka-mopaya, baepiskopo ya mikili ya Amerika balobi ‘te «moluki-mboka moko te azali mompaya mpo na Eklezya». Lisusu, bazali komono « elongi ya Kristu na mbobembo, to oyo azali kotambola» na kati na bango. O makanisi ma bango, likambo eleki monene na ekeke eye ezali ‘te bato bakendaka bisika mosusu kaka mpo na makambo ya politiki to ya nkita te. «Ezali likambo lya bomoto mpenza oyo ezali kotungisa bososoli bwa biso bakristu mpe mokumba ya bizaleli malamu ya balokotà o kati ya bikólo».

Mibeko mizala mpo na bomoto mpe limemya

Na yango, mobembo ya moto oyo azali kokende na mboka mopaya, oyo azali koleka na mikili ndenge na ndenge, na bibongiseli ndenge na ndenge mpe na mindelo ndenge na ndenge, ezali kosenga ‘te bàbateli mpate básala mosala mwa bango na lolenge ebongi mpenza, mpo ‘te, ut’o esika oyo moto aùtaki, tee na esika oyo azali koleka mpe na esika oyo azali kokende, mpe tee na esika oyo akokóma, “eklezya ezala elembo ya elikya, esika ya koyamba mpe ya kobatela”; eye ezali ndé elikya ya ba Eklezya mabele maye. Ba episkopat eye bikeseni, bizali kobyanga bakonzi ba mboka, mpo na kotombola politiki oyo “ebatelaka bomoi, lotomo mpe lokumu lya bato, mingi mpenza ya baluki-mboka, to bato baye bakendaka kofanda na mboka mompaya”, mpe kondima mokumba ya Leta “ya kobongisa nzela balekaka mpe kobatela bolamu bwa bato banso”. Nzokande, bakanisi ‘te “lokumu la moto bakoki kolongola yango te mpe limemya oyo ebongi na bango”, esengeli kozala na esika ya liboso na mibeko minso.

Baepiskopo ya Etats-Unis, ya Canada, ya Caraïbes mpe ya Amérique Latine bazali kobyanga libota mobimba lya bato ba Nzambe ya Amérique mpo “na koyamba bampaya na motema moko, na kobatela bato oyo bazali na makoki te, na kosolola na limemya ata na kati ya bokeseni, na kotonga ba Gbagba (ponts) na motema molai”. Bazali kolikya ‘te ba parwase, ba communautés mpe mabota mizala “bilembo polele ekolakisa solo ‘te bondeko ekoki kosalema”, bazali kolobela bomoko mpe elimo ya bondeko: “Tozali Eklezya moko o kati ya mikili mya Amerika”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

20 sánzá ya míbalé 2026, 20:22