Luka

Bansango bya Bikela bya ngambo ya Oreint – 19 Febwali 2026

Bansango ya Orient, epesi biso nzela ya kosangana na poso eye, na misa mya ba Eklezya ya ngambo ya Moniele ya mokili.

Mokolo mwa 18 ya Febwali, ezalaki mwa misato mwa Mputulu. Mpo na Eklezya ya katoliko ya Latine: Karezimo ebandaki: mikolo tùkù minei (40 jours) ya etamboli ekomema kino Pasika. Nzokande, na mangomba ma Azia, eleko ya Karézimo ebandi na mokolo mwa yambo, mwa 16 Febwáli, oyo ebéngami Lundi Pur. Mpe bokeseni esuki wana te. Kati na ezalela ya bonkoko ya mikili ya Azia, kokila bilei ezalaka makasi koleka, ekoséngáká kolya ndunda.

Na ndakisa, na Lingomba ya baCopte, Karézimo eumelaka mikolo tùkù mitano na mitano (55) mpe balyaka kaka mbala moko na mokolo, mbala mingi nsima tango moyi mokei kolala. Kasi, na Karézimo ya ngambo ya Moniele ya mokili, esukaka kaka na kokilya bilei tè. Ezali mpe ntango mya milulu makasi mya losambo.

Na baeklezya ya Byzance, basàlaka misa mya makabo ya bosantu, esalemaka o mokolo mwa misato mpe mwa mitano, emonisaka ntango ya kobongola motema, ya etumba ya elimo mpe ya kozyla oyo ezalaka na eleko ya Karézimo.

Na Eklezia ya ba- Chaldées, mokolo mwa lomingo nyonso ya Karézimo ezali libyangi mpo na kobongola motema mpe kozonga na bondeko (Alliance).

Mpe na Eklezya ya Katoliko ya Syriaki, milulu mya kokila bilei, oyo ebengami Qurbono ya eleko ya Karézimo, ezali lokola nkisi mpo na molimo.


Bilembo bisusu ya makasi, ezali ‘te: na ba Eklezya ya Orient, libala moko te esalemaka na eleko ya Karézimo. Mpamba te libala ezali molulu mya lisekwa. Ezali eleko ya kokila bilei, ntango ya kolela mpo na kozela na kimya nyonso Elekeli. Nzokande Karézimo ezalaki eleko ya kolela masumu, mpe ya kozala nye mp ona kozyla Pasika. Ezali nzela moko ya molende kasi oyo ebongolaka mpenza bomoi bwa moto na bozindo.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

19 sánzá ya míbalé 2026, 18:29