Luka

Sàngo Hyppolite Agnigori,, Sàngo-Mokonzi ya parwase Saint Jean-Paul II ya Cocody-Angré na l’archidioseze ya Abidjan - mokolo mwa misato mwa 18 Febwàli 2026 Sàngo Hyppolite Agnigori,, Sàngo-Mokonzi ya parwase Saint Jean-Paul II ya Cocody-Angré na l’archidioseze ya Abidjan - mokolo mwa misato mwa 18 Febwàli 2026  

Eleko ya Karézimo ya Batata bya Eklezya o mokolo mwa lelo

Ezali lelo, mokolo mwa misato mwa 18 ya Febwali, mokolo mwa Mputulu, ndé ebandi eleko ya Karezimo 2026. Mikolo tukù minei (40 jours) ye etamboli ememi biso na Pasika ya Mokonzi kati na losambo, na bomipima mpe kokaba. Nzokande, tango bokristu bobandaki, eleko ya Karézimo ezalaki te. Sàngó Hyppolite Agnigori, Nganga-Nzambe ya Archidiocese ya Abidjan na Côte d’Ivoire, alobi ‘te: “Nsima ya eleko ya baapostolu to bantoma, momesano ya Karézimo ekomaki kokota mokemoke mpe ezwáki mbongwana mingi”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Eleko ya kokila bilei mpe ya kobondela na boumeli ya mikolo tùtù minei (40 jours) mpo na komilengele na Pàsika to Elekeli, eutá na Makomami mya Biblia, oyo ezali kokundwela biso mikolo tùkù minei moye Yezu alekisaki na eliki to esobe, epai kuna abondelaki, akanisaki, mpe amekamaki na Satana. Na ekeke ya minei (IVè Siècle), ekomaki na motuya makasi, mpamba tè, bato baye bazalaki koyekola Biblia (bakatekimeni) mpe baye bazalaki kobongola motema bakómaki na momeseno mwango.

Mobembo yango ezalaki na biteni mingi mpe ezalaki na makambo mya ntina mingi, elobi Sàngó Hyppolite Agnigori, Sàngó ya parwase Saint Jean Paul II ya Cocody-Angré  na Archidiosezez ya Abidjan, na Côte d’Ivoire) mpe molakisi ya istware ya Eklezia, alobaki na Vatican News. Alobeli lisusu nsango ya Pàpa Léon ya XIV mpo na eleko ya Karezimo 2026 oyo ezali na motó ya likambo: “Koyoka mpe kokila bilei. Karézimo ezali tango ya kobongola motema”. 

Masolo elongo nà Sàngo Hyppolite Agnigori, professeur ya histoire de l’Église.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

18 sánzá ya míbalé 2026, 17:50