Luka

Kardinale Anthony Poola, mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Inde, oyo azali moto ya liboso ya ekólo ya Dalit. Kardinale Anthony Poola, mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Inde, oyo azali moto ya liboso ya ekólo ya Dalit.  

Inde : Antony Poola, moto ya Dalit, aponami mokonzi ya baepiskopo

Na likita lya baepiskopo ya Inde, oyo esalemaki na Bangalore kino mokolo mwa zomi ya sanza ya Febwali (10 février), baepiskopo ya Inde baponaki mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Inde, oyo azali moto ya liboso ya ekólo ya Dalit. Kardinale Anthony Poola, episkopo-mokonzi ya Hyderabad, akozala mokonzi ya eklezya ya ekólo oyo ezali na bato mingi koleka na mokili.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Bato ya Dalits, oyo babengaka bango mpe “baye basimbaka te”, bazali sik’awa na motindami monene kati na baepiskopo ya Katoliko na Inde. “Na eleko etondi bokabwani, mobulu mpe matata kati na bato ezali se kobakisama, Eklezya esengeli kozala elembo ya bondeko, boyokani mpe elikya”, elobi episkopo wa lokumu to Kardinal Anthonny Poola, sima ya boponomi bwa ye, o mokolo mwa 7 ya sanza ya Febwali. Ekweyaki mwa mikolo, yambo ya liyangani monene ya baepiskopo ya ba eklezya misato ya Inde-Latine, syro-malabare mpe syro-malankare o mokolo mwa 10 ya Febwali.

Episkopo wa lokumu ya mibù tuku motobà na minei, azali kardinale ya yambo ya ekolo Telugu. Azali mokitani ya Mgr Andrews Thazhzth ya Trichur, episkopo ya eklezya syro-malabare, oyo akambaki esika ena bambula minei mobimba. Archeveque ya Hyderabad, oyo akomaki nganganzambe nà bambula tuku misato, andimi mokumba moye mwa sika na “Bomikitisi bonso, na bososoli ‘te, bokambi bwa eklezya ezali mosala mosimbami na boyoki, na mabondeli, mpe na kokabolana bososoli”.

Akomaki episkopo wa lokumu na lisalisi lya Pàpa François na 2022

Na lisoló na ye nà Radio Vatican-Vatican News tango azwaki ebonga ya Kardinal na 2022, Archeveque Poola alobelaki mbongwana monene oyo ba Dalits mpe bituluku bisusu ya bato bazangi lokumu basali, mpe bitumba biye bizali kosalema. “Bato basusu bazali kobunda mpenza mpo ‘te mayele ma bango mpe misala mya bango eyebana”, elobaki Kardinal ya Inde.

John Dayal, molobeli ya lisangá lya Katolike ya Inde mobimba, ayebisi UCAnews ‘te na kati ya baepiskopo pene na nkama moko na tuku mwambe (180) ya mangomba misato ya Inde, kaka zomi na mibale (12) nde bazali ba Dalits, mpe abakisi ‘te ba Dalits mpe popilation to bitúlúká y abato basusu, bazali 60% ya Bakatoliko ya Inde.

Mitungisi mpo ya bonsomi ya eyamba

Euti na Sanskrit mpe elakisi “banyokwami” mpe elakisi bato oyo babwakami na kati ya ebongiseli ya ba caste minei ya bonkoko ya lingomba ya ba Hindu, “dalit” ezali nkombo oyo bato oyo, na boumeli ya bikeke mingi, basalelaki bango makambo ya mabe mpe banyokolaki bango. Na kati ya mibeko ya Leta ya Inde ya 1948, Leta elongolaki ebongiseli ya bakelasi mpe etyaki bibongiseli mpo na kosalisa bato oyo bazangaki esika na kati ya bomoi bwa bango.

Na liyangani liye lya lisanga la baepiskopo ya Katolike na Inde, baepiskopo bamonisaki ‘te bazali komitungisa mpo na bokeseni oyo ezali se kokóba na ekólo yango. Basengaki na molende nyonso ‘te mibeko mizali kobebisa bonsomi ya losambo mpe lotomo ya moto na moto ya kozala na makambo na ye moko elongwa. Baepiskopo balobi ‘te bato mingi basali likambo te bazali kokangama na boloko na ntina na bifundeli ya lokuta ya kopusa bato na makasi mpo bákóma bandimi ya lingomba mosusu. Nzoka nde “Eteni ya tuku mibale na mitano (25) ya mibeko ya mboka endimi ‘te bato banso bazali na lotomo ndenge moko ya kozala na bonsomi ya kolanda likanisi lya motema mwa yé mwa bango mpe kozala na bonsomi ya kondima, kosalela mpe kopalinginya lingomba na bango”. Akundolaki yango na liyebisi moko, oyo baboyi lotomo ya bakristu Dalits oyo “ezali sé kokoba na boumeli bya bambula mingi na lolenge ya bokabwani ya mpamba-mpamba, atako bato bayiké bazali kosenga ‘te ezala na bokokani mpe bosembo”.

Mgr Anthony Pool, archevêque  ya Hyderabad na Inde, Episkopo wa Lokumu ya yambo ya ba Dalits
Mgr Anthony Pool, archevêque ya Hyderabad na Inde, Episkopo wa Lokumu ya yambo ya ba Dalits   (AFP or licensors)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

13 sánzá ya míbalé 2026, 15:17