Kardinal Pizzaballa: Kozanga kotyelana motema ezali eloko ekopekisa kimya
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
“Likambo liye lizali kopekisa kimya ezali tango inso mopelengano (politiki) ya mwa tango mokuse. Kasi, tosengeli kotika te kosala makasi mpo na koluka eloko mosusu. Tosengeli kotonga mpe kobatela na bomoi likanisi na biso ya bato mingi oyo balingi kozala na bomoi ya kimia na kimya, na koyeba ntomo na bango mpe koyeba lotomo la basusu”. Wana ezali maloba ma Kardinal Pierbattista Pizzaballa epai na bilenge oyo akutanaki na bango mwa moke liboso lya kosala lisukúlu na likita lya bato banso na Bazilika Saint-François na Arezzo.
Bomoto bwa baye babungisi nyonso
Na motuna basalaki yen a ndako ya bopanzi nsango Avvenire, Episkopo wa lokumu Pizzabala alobelaki makambo ma kimya na Gaza mpe na mikili minso ya Terre Sainte, oyo etikali likambo ya nsomo mpenza. Alobeli mpasi ya kozongela kotonga sik’awa, kozanga kotala mpasi, makanisi mpe bomoto bwa miliyo ya ba-Palestine oyo bazali kuna. “Ekozala ata nà ndako moko ya Hotel ya ntalo mingo na Gaza”. Elobaki yé, na koyanola na motuna na maye matali bozongeli kotongi bandako na administration ya Amerika.
Etumba na Gaza esili nayino te
Na Gaza, liwà ezali kokoba, atako balobaki, mandoki matika kobetama
Solo, ba bombi ya makasi ezali lisusu te, kasi ezali na ba mikano ya koboma bato na bitindà (exécutions ciblées). 96% ya ba centres habités ebebisami, ba eteyelo écoles) ( ekangami ut’o mibu misato mpe ba nkisi (médicaments) ezali kozanga, yango wana bato bazali kokufa na malili, na ba infections mpe na kozanga ba lisungi (soins). O kati ya Eklezya Katoliko, ya Sainte Famille, kaka bato tuku mibale na 23 bakufaki. Abetaki nsete mpe alobi ‘te, mingi bakufaki na nzala mpe na malili.
Soki bozangi kotyelana motema ezali, kimya ekozala tè.
“Eloko soki moko éte ekozonga lisusu to ekozala lolenge ezalaka kala o kati ya etukà eye, mpe toyebi te lolenge kani mikolo mikoya mikozala”, elobi Kardinal Pizzaballa, na tango batunaki ye mpo na likambo lya kimya. “Kolobela kimya ezali na ntina mingi te na moyi mwa lelo
Kimya esengeli na ezalela malamu ya bonkoko, moboko, mopelengano to politiki, mwa confiansi, kasi yango nde ezalaki ntina ya yambo ya etumba eye”. Mpe na maye matali kozala ya bakristu na Gaza, andimi lisusu ‘te kopona kotikala na Gaza ezali likambo lya politiki te, kasi ya “bosembo epai ya bato ya mpasi oyo bakoki kotambola te, ya bomoko mpe ya bondeko”. Alobi ete: “Bakristu bazali ba-Palestines lokola bato banso”.
Bondeko to boyokani mingi kati na Bwalé to mpasi
Kardinal Pizzaballa akanisaki lisusu na bilembo biyiké ya bondeko mpe ya bokebi oyo ezali koùta na biteni binso bya mokili, “ata na ba dioseze ya mike miye mizali na bobola makasi”. Bilembo bya lisungi biye “bizali kosalisa moto mpo amiyoka ‘te azali ye moko te” atako azali na mikakatano mingi. Sik’awa, eloko ezali kotungisa Patriarche mingi, ezali likambo lya Cisjordanie, epai kuna makambo mazali se kobeba mpe epai kuna makambo minso mizali kokende na nzela ya “kokitisa na nzela ya bolimwisi, malembe-malembe mpe moke-moke lotomo lya ba-Palestines. Tozali na ba parwase tuku mibale na misato (23 Paroisses) na Cisjordanie mpe mokolo na mokolo, nazwaka ba bosenga ya lisalisi mpo na ba abus mpe mobulu oyo tozali komona, kasi toyebi te epai wapi tokoki kokende”.
Kotonga Kimya ezali mpasi
Mpo na kotonga kimya, esengeli likanisi lya sika na politiki. “Oyo ezali ntango ya kosala makambo minene te. Ezali nde ntango ya kobongisa mabele, kosala ba réseaux, koyeba baye balingi kimya, mpo na mikolo mizali koya, tokozala na mposa na bango mpo na kotonga yango”. Mpe mpo na oyo etali boyokani, alimboli ete “mposa ya kimya esengeli kokoma ezalela ya momeseno, oyo ebotami na biteyelo, na mabota, na bapanzi nsango. Ezali mosala makasi oyo esengaka tango mpe makasi, kasi tosengeli kosala yango
Lisungi lya mokili mwa bakristu
Na mobu 2033 na Yeruzaleme, na Zubilé ya Libiki, «esika eye mposa ya kimya ezali na libateli, kasi ezali mpe na likàmà», mpamba te ekozala libaku lya komonisa lisusu mokumba ma mangomba mpo na kotonga banzela ya kimya. Kardinale azongisaki ‘te kozala mokristu ezalaka tango inso mpasi, «boyambi bwa biso ezali na mindondo, kasi lokola mikakatano mizali, elakisi malamu ‘te litatoli lya bokristu ezali ntango inso na bomoi». Mpe boyambi, “soki ezali ya bonsomi, ebulunganisaka, zambi, bonsomi bwa biso esimbami na moto oyo apesaki bomoyi bwa ye mpo na bolingo, kasi te mpo na makasi ma bato”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.