Na Bénin: Ntómà ya Pàpa akei kotala dioseze ya Kandi
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
«Boyei bwa Ntómà ya Pàpa, ezali komonisa bondeko to bozali pembeni ya Tata Mosantu na eklezya ya biso. Ezali elembo ya polele ya bomoko ya Eklezia mpe ya bokengi Pape azali na yango mpo na Dioseze ya biso», elobaki Sàngó Aholou, mokambi-molandi ya mibale ya Dioseze. Bokutani bwa motindami mwa Tata-Mosantu, oyo azali na mobembo na dioseze eye, esalemaki o mokolo mwa 14 mpe 15 ya sanza ya Febwali. Bokutani bonà bozali na ntina mingi mpo na eklezya.
Na yango bakristu bazwaki bolingo bwa Eklezia ya mokili mobimba mpe bamoni ‘te boyambi bwa bango ekoli lisusu makasi. Nzokande ba lengelaki misala miyiké oyo emonisaki makambo minene ya mobembo mya mobu, lokola: milulu mya Ukaristia, ekambamaki na Ntómà ya Pàpa; batango ya losambo, ntubela mpe bokutani ya bakristu, ya ba Nganga-Nzambe, ba Sàngó. Manso mpo ya kokolisa boyambo bwa bakristu basangani mpe kolendisa mikumba mya bango. Mosala makasi ya bandimi oyo bautaki na bitúká binso ya dioseze emonisaki ‘te eklezya ya mboka wana ezalaki makasi.
Mobembo : boyangani, kobongwana, mpe kozonga na molimo
Mpo na Sàngó Aholou, mobembo ya Ntomà ya Pàpa elakisi mposa ya kozala na eleko oyo dioseze ezali koleka na dimension monene ya communion. “Mobembo ezali eleko ya boyangani, ya mbongwana mpe ya kozonga sika na molimo. Kozala ya Ntómà ya Pàpa epesi yango dimension moko ya ntina, na kokundola ‘te Eklezia na biso ya mboka ezali na kati ya libota monene ya Eklezia ya mokili mobimba. Mokambi ya lingomba ya Katoliko atindelaki bakristu nsango ya bolendisi mpe ya elikya mpo na kolendisa bango bàzala makasi na boyambi, ata na kati ya mikakatano, mpe bazala tango inso banzeneneke ya Kristu na bisika biye bafandi. Abosanaki te kolendisa bayangeli mpe balendisi na kokóba mosàla mwa bang ona mpiko mpe loboko.
Mobembo na Kandi mpo na kosunga Eklezya eye bato bazali moke
Mpo na kosukisa, mobembo mona mozali elembo monene ya botóndi mpe ya lisungi mpo na eklezya ya moke lokola oyo ya Kandi. Ezali kokundwela bakristu ‘te bazali bango moko te, kasi bazali basangani ya lisangá moko monene. Sàngó Aholou, alobi ‘te: “mobembo moye, molendisi mpe mopesaki biso makasi ya kokoba na mosala mwa biso, ata na ntango ya mikakatano. Ezali kolendisa elikya na biso mpe kondima na biso mpo na mikolo mizali koya”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.