Sud-Soudan: O kati ya mobulu, libyangi lya kozonga na nzela na eleko ya Karézimo
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na liyebisi lya yé ya eleko ya Karézimo, Mgr Hiiboro Kussal, episkopo ya Tombura-Yambio, bayangi bat oba yé na mbongwana ya solo, oyo ekozongisaka sika, bomoi bwa biso ya kati. Alobi ‘te: «Dioseze na biso ezali na mikakatano mingi: koyinana, bokabwani ya balokótà, kosalela bilenge , bokosi, mobulu, koboma libala na makasi, bobola mpe maladi oyo ezali na kati ya masangà mya biso». «Karézimo ezali kaka eleko ya kokila bilei te, elobi ye, kasi ezali ntango ya kobongola motema, ya kozwa mokumba ya bato mpe ya kobikisa bato».
Ekolo ezokisami sékó na bitumba
Mibù zomi na mitano(15 ans) sima lya lipanda lya yé na 2011, Soudan ya Sudi, ekóló elenge na bikóló bya mokili, etikali se na bolembu. Ezwi libulà lya balotukà ya bitumba ya ba sivil (1955-2005). Ekweyaki lisusu na matata ya biuluku ya bikolo ya kati na yango na mibù 2013 mpe 2018. Atako boyokani ya sika mpo na kosilisa matata oyo batyaki mokoloto na sanza ya Setémbe na 2018 epesaki elikya mpe esukisaki mpenza bitumba, kasi kimya ezali naino makasi te. Na ba poso miye mileki, mobulu ebandeli lisusu makasi, mingi mpenza na ngambo ya Nordi mpe na kati kati ya ekolo.
Engebene na lapolo ya UNICEF, makambo mazongi lisusu sima na kobeba ut’o suka ya sànzà ya Desembe ya mobù 2025. Na Etukà ya Jonglei, bato pene na 280 000 balongwaki bandako ba bango; mingi mpenza, basi nà bana, mpamba te, bango de bazali na likàmà polele na kobebisama na nzoto, ya kozwa bango na makasi mpe ya konyokola bango makasi. Na matata ya bitumba eyei mpe kobakisama minyoko ya nzala makasi, oyo ezali kosenga lisuki ya mokili. Kozanga eloko ya kolya malamu ezali se kobakisama, nzala ezali kobangisa bitúká binso, mpe ba sistemi ya bokolongonu bwa nzoto bizali lisusu te. Kati na ezalela oyo, mpasi ya mokolo na mokolo ekómi likambo lya bato mingi ya Sud-Soudan. Kozanga libateli epekisaka lisungi ekomela bango mpe esalaka ‘te bato oyo bafandaka na bamboka ya zamba bázala na likama mingi.
Kozongisa Kimya kobanda kati na masànga
Mpo na episkopo ya dioseze ya Tombura-Yambio, na kati ya mpasi wana, Karézimo ekómi mbela ya solosolo mpo na kotonga lisusu esika oyo bato bakoki kofanda. Abengi Parwase na Parwase, libota na libota mpe mokristu na mokristu, àzonga na boyokani na Nzambe mpo na kozongisa kimya mpe kosunga baoyo bazali na likàmà.
Na ekólo wapi bato bazali kaka kotyelana motema te mpe bazali na bomoko te, Eklezya ezali koluka kozongisa kimya. Na nzela ya losambo, bolimbisi mpe lisanga, eleko ya Karézimo ekoki kokoma lolenge lya elikya.
Na kati ya mimekano to minyoko, libyangi lya Nsango Elamu ezali kongenge lokola mwinda: kozongela Nzambe mpo na kobikisa mitema mpe kotonga mboka na miboko mya kimya.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.