Luka

2026.03.30: Mgr Crociata, Mokambi ya Comece.  Elilingimpo na ndakisa  2026.03.30: Mgr Crociata, Mokambi ya Comece. Elilingimpo na ndakisa  

Comece elendisi makasi maye mazali kotalela kotya nsuka na mibulù

Na nsango ebimisami na eleko ya Eyenga ya Pasika, Commission ya ba Conférences épiscopales ya Union Européenne endimi mokano ya Union Européenne ya kotombola ba initiatives ya dialogue . Mpo na Mgr Mariano Crociata, « lokola Bakristu mpe bana mboka ya Pótó, tobyangami na koyamba mpe kolóna likabo ya kimya ».

Basanso ya Vatikan

 

Eyenga ya Pasika oyo ezali kopusana, epusi bakristu mpe bato ba motema bolamu bàlendisa ba ye banso batye molende monso mpo na kosukisa mobulu, kosenga kimya, kokotisa lisungi”. Ezali maloba ma Mgr Mariano Crociata, mokambi ya Commission ya ba conférences épiscopales ya Union européenne (COMECE). Alobaki yango na nsango oyo abimisaki mokolo mwa yambo, mwa 30 ya sanza ya màrsi.

Bitumba bya sika

“Baepiskopo” elobi ye, “balandaki nà mawa nyonso” kofungwama ya bitumba ya sika na Moyen-Orient, “nsima ya oyo ya Ukraine, kozanga kobosana ebele ya bitumba mosusu oyo ezali kosalema na mokili mobimba”. Na makanisi ma ye epai ya bato baye basali likambo te oyo bazali “konyokwama makasi”, Mgr Crociata amonisaki lisusu “esengo na ye mpo na milende mya Union Européenne oyo ezali te mpo na kobakisa matata, kasi mpo na kolendisa, na esika oyo ekoki, mabongisi mya boyokani mpe ya masolo”.

03/10/2025  Comece ekaboli mpasi ya bato ya Gaza, ya Ukraine  mpe  ya Soudan
03/10/2025 Comece ekaboli mpasi ya bato ya Gaza, ya Ukraine mpe ya Soudan

Na nsangoliyebisi lya ye, episkopo alobaki ‘te “lokola Bakristu mpe bana mboka ya Pótó, tobéngami mpo na koyamba likabo lya kimya mpe kolóna yango na bomipesi mpo na kobatela lokumu lya moto nyonso, kotombola bosembo mpe kosala na botosi na mibeko mya mikili”.

EU lokola mwango mwa kimya

Mokambi ya Commission ya ba Conférences épiscopales ya Union Européenne azongelaki maloba ma ye mpe asengaki ‘te bakristu bàbatela makasi mokano monà. Mpamba te ezali kosenga mokano ya bomoko kati na bikóló ya Union Européenne, na koyeba ‘te Union Européenne ebotamaki lokola projet ya kimta. Ezali kati na yango nde Europe ezali koyeba bomoto na yango mpe lolenge bobele moko ya malamu mpo na koluka bolamu bwa bato bazali kati na yango. «Elikya na biso», esukisaki episkopo, ezali ete mikakatano mya nkita mpe ya politiki, atako ezali ya kokamwa, elónga lokola mokakatano moye mokoki komema na eteni ya sika na nzela ya «bosangani bya mikili mya Pótó».

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

30 sánzá ya mísáto 2026, 22:18