Principauté ya Monaco ezali komilengeke makasi mpo na Boyei bwa Pàpa Léon XIV
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na Monaco, emonani polele ekwelà eye bankoto tukù minei ya bato (40 000) ya Principauté bazali kozela na mokolo mwa poso ya mwa 28 ya sanza ya màrsi. Na boumeli ya ngonga moke ya tukù mibaléna minei (24h), motuka ya lokumu oyo ememaka Pàpa, ekotambola na ba kilometele-kare mibale ya ekólo eye ya mibale eleki moke na mokili mobimba. Ekobanda na Palais princier tee na ndako-Nzambe monene, na Eklezya Sainte-Dévote mpe na stade Louis II. Mobembo moye mopesi nzela na Léon XIV akende kotala Principauté mobimba, kasi lisusu epesi nzela na bato ya Monaco to ba Monégasques bakutana na nzela na bango nà Pàpa ya yambo na lisoló lya sika akendaki na ekolo na bango oyo ya Libanga.
Minkàma ya bandeko bamipesi na bolingo na bango moko
Mpo na kobongisa mokolo mwango, bankama ya bato bamipesaki liboso kutu ‘te dioseze efungola mpo na kopesa ba nkombo. Mosala na bango ezali ya kosalisa bato bázwa bisika ya kofanda, ya kolakisa bakristu nzela, mpe ya kosala ‘te makambo manso masalema malamu naekolo-engumba eye etongamá na lolenge ya malamu mpenza. Na mboka eye, batyaka likebi mingi na kotonga yango mpo ‘te esika mokomoko ezala na eloko. Mpo na kokende na bisika bisusu, esengaka kozwa ascenseur, komata na baeskalye, mpe kotambola na banzela ya mikemike. Kotambola to koleka-leka na mwa ekolo eye ezali mokakatano monene.
Esika mpo na kokabola biloko mpe kosambela
Sima ya baposo motoba ya kolengele mobembo monà, Archeveki ya Monaco amonisaki esengo na ye mokolo mwa mitano na nsima ya nzanga na likita lya bapanzi-sango. Na nsuka, maye mabongisami ekoki kopesa nzela na ntango ya kosolola mpe ya kosambela, na mwa tango ekolandela mokolo mwango, atako ezali ya mokuse kasi, ezali na makambo ma motuya mingi. Kobanda na ngonga ya 9:00 mpe 17:30 Pàpa akosala masukulu manei, epai wapi moko na yango ekozala na balcon ya Palais princier mpe mosusu na Sainte-Dévote, eklezia esika wapi bato ba Monaco (monégasques) bakutanaka mbala na mbala mpo na nteke to feti ya Santu ndoyi (patronne) na bango, mpe esika Pàpa akokutana na bilenge mpe na ba catékimèni.
Matomba mingi mizali kozelama
Mgr Dominique-Marie David ayebisaki na bapanzi-sango ‘te asololaki na Episkopo wa lokùmu Bustillo, episkopo ya Ajaccio, oyo ye moko ayambaki Pàpa François na Corse mpo na mobembo ya mokolo moko. Mpe François Bustillo alimboleli ye ete, pene na mbula moko na ndambo nsima ya boyei bwa François na mokolo mwa 15 ya desembe ya mobù 2024, Eklezia ya Corse ezalaki kaka kozela mbano ya boyei bwa ye.
Kasi, Monaco ezali kozela likabo la moke te. Episkopo David alobeli eklezia moko ya moke kasi ezali na bomoi, mpe ezali na mposa ya kolendisama, ya kotindikama ata, soki esengeli mpenza. “Tófungola mitema mya biso mpe matoi ma biso”, episkɔ́pɔ-mokonzi ya Monaco abyangaki, “mpo na koyoka oyo Pápa akoloba na biso”.
Motema kokaba ya bato ya Monaco
Mobembo moye momonisi mpo na Léon XIV ‘te, bokeseni bozali te kati na biikólo bya minene mpe ya mike. Moto na moto azali na bomoto bwa ye, na ntina na ye, na makoki na ye ya kongenge na mokili mozingi ye. Mpo na maye matali bomengo oyo Principauté ezali kobomba, Archevêque ayanoli na nzela ya ezalela ya bokabi bonene ba Monégasques bazali na yango, oyo, na mayele nyonso, bayebi mpe kosalisa baoyo bazali konyokwama.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.