Luka

Bansàngo bya bikela to misàlà ya Orient – 9 Aprili 2026

Gayassa: Na lingomba ya Chaldée, ezali maloba maye mayembamaki na lokótá lya Araméen oyo ezali kolobela bokóti bwa moyibi na paradiso.

Na poso moye, bakristu ba mokili mobimba basepelaki mokolo mwa yambo sima ya Pasika. Na momeseno ya ba-Kaldea, milulu ekotisaka makomi etangami na nkombo ya Gayassa. Ezali lisoló moko eyembamaki na lokótá ya Araméen, badiakoni balimbolaki yango liboso lya botángi ya Nsango Elamu, oyo ezali komonisa bokóti ya moyibi na Paradiso, oyo elobelami kati na Evanzile ya Luka.

Awa abakemi na kuruse elongo to na mopanzi ya Yezu, andimaki mabe ma ye. Bongo Yezu alóngisaki ye, mpe ayebisaki ye maloba maye: “Lelo okozala elongó nà ngai o kati na Paladiso”. Gayassa, oyo ekomamaki na ekeke ya mitano ya tango na biso na monoko to lokótà ya Baasulia mpe ya bato ya Kaldea, ezali kolobela likambo lyango na ndenge ya masóló. Moyibi-malamu, nkombo na ye Dismas, ayei na ezibelo to bikuke bya Paradiso. Azali liboso lya mokeluba mokengeli, oyo atambwisami na Mikaele, anzelu-mokonzi, oyo bapesaki mokumba ya kobatela esika enà ut’o kokweya ya Adamu. Bato mingi baboyaki. Moyibi-malamu ayebaka ‘te azali mosumuki mpe atyaka mbamba mpo na kokóta. Likambo lya ntina mingi esalemaki tango alakisaki ekulusu ya Kristu oyo epesamelaki ye. Na tango amonaki elembo yango, mokengeli afukamaki mpe afungolaki ezibelo. Na nsuka ya molulu yango, moyibi ya sembo akóti na tempelo, atii ekulusu na etumbelo, mpe na nsima asali elembo moko mpo na kozongisa boyokani nà anzelu.

Likanisi lya momeseno moye, mozali kopesa ndimbola ya lobiko: moto akoki kokóta Paradiso te mpo na misala mya ye, kasi mpo na koyeba kondima mabe ma ye mpe kotyela Yezu Kristu motema.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

09 sánzá ya mínei 2026, 13:36