Luka

Bambombi ekweyi na na Kafr Kila, ezali ba bombi oyo ba-Usrael ba bwakaki na mindelo ya israéle na Liban. Bambombi ekweyi na na Kafr Kila, ezali ba bombi oyo ba-Usrael ba bwakaki na mindelo ya israéle na Liban. 

Sàngó Toni Elias: “Tolingi kimya na Liban”

Na lisoló na ye na bapanzi sango ya Vatikan, Sàngó-Mokonzi ya Maronite ya Rmeich, mboka ya suka na sudi ya mboka na ndelo ya Israël, alobi ‘te bato ba Liban « batye motema na Mokonzi ». Yango nde esali na biso bato ba solo, ya makasi mpo na kolónga liboso lya bitumba mpe matata miye mizingi biso, elobi ye.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Tolingi Liban lyoko ezali na boboto, na kimya; tolingi kozwa mosala mpo na bilenge bya biso; tolingi te ‘te mabota mazala lisusu na likanisi lya kotika bamboka na bango te”. Mpamba te, Nzambe ateyi biso, tólinga bato banso. Ezala ba Chiites, ba Sunnites, ba Drizes, moto nyonso. Kasi ntango ekoki mpo na koloba na mongongo makasi ‘te: tolingi bitumba lisusu te”.

Ezali nde eloko Sàngó Toni Elias, Nganga-Nzambe ya lingomba ya Maronite mpe sàngó ya Saint Georges na Rmeich, ayebisaki bango nsima ya liyebisi lya bosukisi bitumba kati na Iran, Etats-Unis mpe Israël. Mobeko mwa kimya moye motali Liban te, elobaki bokonzi bwa Israël.

Botelemeli bwa Rmeich

Sàngó Toni alobi ‘te: “Tozalaki kozela yango”. “Rmeich ezali mboka ya suka ya bakristu liboso ya mindelo ya Israël. Tozali pene na ndelo te. Tozali na mindelo. Mpe tozali kaka biso mpamba te, kasi ná bato basusu ya bamboka mibale nde tozali naino na Bint Jbeil. Awa, moto nionso asosolaki ut’o ebandeli ‘te kimya ya bitumba na Sud ya Liban ezalaki te”.

Milùlù mya Pasika

Atako bongo, Tony alobi ‘te bato ya mboka na ye balongaki kosala nteke to feti ti ya Pasika. «Mpe batondi Mokonzi mpo ‘te, atako na mbula moye tosengelaki kotika kosepela bokengeli bya Pasika, kasi tokumisaki Poso Esantu na bosangani bonene».

Kaka masolo nde ekoki kosukisa bitumba na Moyen-Orient  elobi Léon XIV
Kaka masolo nde ekoki kosukisa bitumba na Moyen-Orient elobi Léon XIV   (@Vatican Media)

Ezali nde yango, esimbi mpiko na biso: kondima to boyambi, kotyela Mokonzi motema, mpe kozanga kotika. Na esika ya kolemba, tyelá nde Yezu motema. Yango nde esali biso bato ya solo ya makasi na kati ya bitumba mpe matata oyo ezingi biso.

Bozali pembeni ya Eklezya mpe biloko bya ntina

“Tosalaki ‘te mingongo mya biso eyokana, mpe Lingomba ezalaki tango inso pene na biso. Na tango ya etumba ya nsuka mpe na tango ya etumba oyo, tozwaki mbano ya bozali pembeni makasi ya eklezya. Tata Toni alobi ete tozali kosepela mingi na mabondeli ya Pápa Léon XIV. Mokolo mwa misato na ntongo, Mgr Paolo Borgia, oyo azali monseigneur apostoliki, “atunaki biso soki tozali malamu mpe atunaki biso soki tozali na mposa ya eloko nini”.

O mikolo miye, nazali kosala liste ya bankisi oyo nasengeli komela. Bato basusu bazali na maladi ya kanser to bazali kozwa lisalisi lya ntina mingi. Bato basusu bazali komela bankisi ya makasi, ya ntalo mingi, to oyo ezali komonono lisusu te. Tozali na bosenga ya biloko biye mpe mingimingi ya lisungi lya bato”. Sàngó Toni Elias asukisi na kolimbolaka ‘te: “Biso tozali komeka kotinda liste oyo na Ordre ya Malte, oyo ezali kosala mingi na Caritas na etuka eye. Tozali komema mokumba nyonso awa na ba parwase, mpe tozali koluka koyeba lolenge kani tokoki kozwa lisungi. Tozali kokóba na yika mpiko na kimya”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

08 sánzá ya mínei 2026, 18:01