Luka

Mosantu Aram I, Catholicos ya Arménie ya Ndako Monene ya Cilicie Mosantu Aram I, Catholicos ya Arménie ya Ndako Monene ya Cilicie 

Aram I, mokambi ya Eglise Apostolique ya Arménie ya Proche mpe Moyen-Orient

Mobembo oyo Mosantu Aram I, Catholicos ya Arménie ya Ndako Monene ya Cilicie, asali epai ya Pàpa Léon, epesaki libaku lya kolakisa makambo ma masoló ya kala mpe ya tekiniki ya Eklezia oyo ezali na Antelias, na Liban, ut’à mobù 1930.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mosantu Aram I azali mokitani ya kiti ya bokonzi ya Patriarche ya Arménie ya Cilicie (v.1070 ¬ 1375, bokonzi ezwami na sud-ouest ya Anatolie mpe efungwami na Méditerranée). Bokonzi bwa ye ezwami na etando ya Ba-Arménie ya Proche-Orient mpe ya Moyen-Orient. Etumba ya Antelias ezali litatoli lya bomoi ya bato ya Arménie oyo bazalaki na mboka mopaya na boumeli ya lisoló lya bango. Aram I, azali mokambi ya Conseil ya ba eklezya ya Moyen-Orient kobanda sanza ya zomi na moko ya mobu 2007. Azali mpe mokambi ya Conseil mondial ya ekimenisme ya baeklezya (COE), oyo ezwami na Genève.

Eglise apostoliki ya Arménie, ezali eklezya eye ezali na mobembo

Eklezya ya ba Arméniens ekabwani na Eklezya ya Roma banda likita lya Chalcédoine na mobu 451, oyo lingomba yango endimaki te. Eklezya eye ezali na bandimi koleka milio nsambo, epai wapi pene na milio mibale na Arménie, mibalé misusu na Russie. Basusu, pene ya 400 000 bazali na Géorgie, 500 000 na Moyen-Orient, pene na 1 000 000 na Etats-Unis, 150 000 na Amérique du Sud, mpe mingi lisusu na Europe, mingimingi na France pene na 400 000 ya bandimi.

Bokutani kati na Catholicos ya Grande Maison ya Cilicie mpe Pàpa Léon XIV ezali na boyokani oyo ebandaki na ebandeli ya lingomba ya bakristu na Arménie, oyo bantómà Thaddée na Barthélemy basakolaki mpe batongaki.

Katholikossat ya ba-Armenie ya Grande maison ya Cilicie

Katholikosat ya ba-Arménie ya Ndako Monene (Grande maison) ya Cilicie efungwamaki na Antelias, na Liban, na Sahak II Khabayan na 1930. Na bosolo, ezali na nzela ya botikami ya Cilicie na maboko ya ba Turcs nde bato ya Cilicie bakendaki na Liban mpe na Occident ; Nzokande, esika ya Katolikos na mibù nkoto yoko, oyo  evandi na engumba Sis etambwisaka bato ba yé na ntango ya mimekano wana ya mpasi. Emonisami na ntango ya mobembo  ya Bosantu bwa ye Karekin II mpe Tata mosantu Aram I, awa bakei elongo mpo na kozwa bobenisi ya ekeko ya Saint Grégoire de Narek na kati ya lobàlà ya Vatikan, o mokolo mwa 5 Aprili 2018, na bokonzi ya Pàpa François.

Antelias ezali nà ndako epai wapi ebombisami biloko ya kala ya Cilicie, esika oyo ezali na ndambo ya zomi ya biloko ya nkita to ya motuya ya Arménie-Cilicie. Ebatelamaki mpe ekótaki na Liban kati na mobù 1921 mpe 1930 na ntango ya bokimi na makasi.

Na mokolo mwa 24 ya sanza ya Aprili ya mobù na mobu, mokolo mwa lilakàkà (kolela) mpe ya losambo (kobondela), ebele ya bato ya Arménie bakanisaka bandeko babango bakufakà, bakanisaka mpe banzela ya bobimi mpe ya bokimi.

Mwa badati mpe ba ekwelà mpo na koyeba makambo misusu.

· Viziti ya Sainteté Karekin II na Sainteté Aram I, (Visite de Sa Sainteté Karekin II et de Sa Sainteté Aram Ier ) na ntango ya bobenisi ya ekeko ya Saint Grégoire de Narek na lobàlà ya Vatikan na Papa François (5 avril 2018). Lisukulu lya Pápa François epai ya Mosantu Aram I, Mokambi ya Lingomba ya Katolikos ya Cilicie, o mokolo mwa 5 Yuni 2014 (• Discours du Pape François à Sa Sainteté Aram I, Catholicos de Cilicie 5 juin 2014). Lokasa la Pápa Benoît XVI epai ya Mosantu Aram I, Mokambi ya Lingomba ya Katolikos ya Cilicie, 24 Novembe 2008 (• Salutation du Pape Benoît XVI à Sa Sainteté Aram I, Catholicos de Cilicie 24 novembre 2008). Mokanda mwa Pápa Jean-Paul II epai ya Mosantu Aram I, Katolikos ya Cilicie, mpo na anivelesele ya 1700 ya batisimo ya ekólo Arménie, 20 Mayi 2001 (• Lettre du Pape Jean-Paul II à Sa Sainteté Aram I, Catholicos de Cilicie, à l'occasion du 1700e anniversaire du baptême de la Nation arménienne 20 mai 2001). Na mobù 1997 Mokambi ya Lingomba ya Katolikàs Aram I ya Cilicie akendaki mobembo na Roma (Yanuáli 23-26, 1997) (• 1997 Visite à Rome du Catholicos de Cilicie Aram I (23-26 janvier 1997)). Nsango ya Pápa Jean-Paul II epai ya Aram I, Mokambi ya Lingomba ya Katolikos ya Cilicie, o mokolo mwa 26 ya sànzà ya Yuni 1995 (• Message du Pape Jean-Paul II au nouveau Catholicos de Cilicie Aram I 26 juin 1995). 1983 Mobembo ya Mokambi ya Lingomba ya Katolike ya Cilicie Karékine II (15-19 Aprili 1983) (• 1983 Visite du Catholicos de Cilicie Karékine II (15-19 avril 1983)). 1967 Mokambi ya Lingomba ya Katolikos ya Cilicie, Khoren I - Lisukulu (8-11 Mayi 1967) (• 1967 Visite du Catholicos de Cilicie Khoren I - Discours (8-11 mai 1967)).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

19 sánzá ya mítáno 2026, 16:34