Luka

2026.07.01 Sàngo Crépin Martial Monga ya dioseze ya Bangassou 2026.07.01 Sàngo Crépin Martial Monga ya dioseze ya Bangassou 

Babomi sàngó moko na Républiki ya centrafrika

Babomaki Sàngó Crépin Martial Monga ya dioseze ya Bangassou, o mokolo mwa 29 ya Yuni liboso lya ndako la ye. Ayebanaki mingi mpo na bomipesi bwa yé na ntina ya boyokani mpe bomoko ya bato na moko ya bituka ya mpasi ya mboka eye ya Afrika. Akweyaki na mobulu mowutaki na matata kati na bikólo mibale bikeseni, na bituluku ya bàsimbà-mandoki, mpe ya kowelana mpo na kokonza bamboka mpe biloko ya mokili. Bakundaki ye na mokolo mwa misato, mwa 1ya sànzà ya Yuli.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Nganga-nzambe, oyo azalaki mokambi-Molandi ya parwase ya Katoliko Saint-Jean-Baptiste na Zémio. Ayebani mingi mpo na mikumba na ye ya pastorali, kasi mpe mpo na mokumba mwa ye, na ntina ya milende azalaki kotya mpo na kotonga kimya na etuka. Mongongo to lolàkà lya Sàngó Crépin Martial Monga ezangaki te koyokana mpo na kozongisa boyokani, na etuka yoko ya Répibliki ya Centrafrika, na Haut-Mboumou, na ngambo ya Ngelè (Sudi-Est) ya ekolo. Kuna nde mobulu ekweyaki mpe motuyà ya bato baye bakimi bamboka na bango, ezali se kobakisama, mpe ezali kotya mpenza likàmà na mikano mya kimya mpe na libateli ya basivili. Babomaki yé na masasi, na bùtù ya mokolo mwa 29 ya sànzà ya Yuni (sànzà ya motóbà), ntango azalaki libanda ya ndako na ye ya basango. Bokundi bwa yé bosalamaki o mokolo mwa 1er ya Yuli (1er juillet), na Kathédrali Saint-Pierre-Claver ya Bangassou. Lokola Agence Fides mpe bapanzi-nsango mosusu balobi, Sàngó Monga azalaki mokambi ya Comité local pour la paix et la réconciliation ya mboka Zémio (CLPR)

Makambo maye matyaka kimya te

Banda mwa ntango, ezalela ya makambo na Haut-Mbomou, moko ya ba prefétures 20 ya mboka, oyo ezali na mindelo nà Soudan mpe Répibliki  démocratiki ya Congo, ezali na likàmà monene ya bato mpe ya bokengi. Makambo misusu ya nsomo ezali oyo ya crisi makasi ya mokili mobimba mpe ya bokengi, makambo ya makasi matali bomoi ya bato ya ba communautés locales, kolongwa (déplacement) ya population mpe kozwa lisungi ya mokolo ya babolà. Fides alakisi makambo-ntina (facteurs) misato ya makambo ya bobulungani bonà, liboso ezali kozala ya ba azandé/zandé (bitulukù ya basimbà-mandoki) ; ya mibale ezali matata kati na bato oyo bazali na bikólo bikeseni mpe kati na baye bazali kowelana kowelana mpo na kokonza bamboka mpe biloko bya mokili. Bongo ya nsuka, ezali bitumba ya makasi kati na basoda ya Centrafriki mpe mibali ya Africa Corps (ex Wagner), société militaire privée ya Russie oyo ezali na mboka eye, ut’o bambula mingi mpo na kosunga mampinga ya mboka.

Episkopo wa lokùmu, Dieudonné Nzapalainga,, archevêque ya Bangui na Centrafrique.
Episkopo wa lokùmu, Dieudonné Nzapalainga,, archevêque ya Bangui na Centrafrique.

Mpasi ya SCEAM

Na maloba ya Symposium ya masàngà ya baepiskopo ya Afrika mpe ya Madagascar (SCEAM), lolenge eyebisami na «lisungi mpo na Eklezia oyo ezali na bosénga», Mgr Aurelio Gazzera, nganga-nzambe ya lingomba ya ba Carmélite ya Italie, ya dioseze ya Bangassou, alobi ‘te «liwà liye ezali likàmà monene mpo na bato ya mboka mpe mpo na dioseze yango moko». Kasi na ngambo mosusu, asepeli na boyambi ya Sàngó mpo na kimya mpe boyokani o kati ya etuka.

Bomipesi mpo na kimya mpe kosólóla

Ba ndako ya bopanzi-nsango mingi balobi ‘te na lolenge ya mokambi ya Comité local mpo na kimya mpe boyokani ya Zémio (CLPR), Sàngó Monga azalaki na kati ya etuluku ya bato oyo bazalaki kosangisa bato ya mboka, bakonzi ya mboka mpe bato basusu mpo na kosilisa matata mpe kopekisa mobulu mosusu. Lokola elobamaki na bisika mingi, bomoto bwa yé, esalaki ‘te azala moko ya bato ba ntina,  oyo bàsalaka mpo na kobatela boyokani mpe bomoko ya bato na esika moko ya mboka, oyo ezalaki na mikakatano mingi.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

01 sánzá ya nsambo 2026, 22:35