Bandako-Nzambe ya Armagh bapameli lolenge ya koboya Bamizilma ya móto moko ya esengo.
Bansango ya Vatikan
Episkopo Mokonzi to archeveki ya Armagh, Mgr Eamon Martin mpe Mgr John McDowell, episkopo monene ya Eklezya ya Irlande, babimisi liyebisi lya lisàngà mpo na kofunda botongi moské ya lolenge moko na likolo ya móto mwa esengo, kobenga yango “likambo lya kozokisa mingi” mpe akebisaki ‘te ekoki kobakisa matata nsima ya mobulu oyo euti kosalema na Irlande ya Nordi.
Na kolanda likanisi lya Mosamaria Malamu, ba wayambi baye babalé, Irlande mobimba bamonisaki ‘te Yezu ateyaki bayekoli ba ye kaka kokanga motema na bato oyo bazali na lingomba to na mimeseno bikeseni na oyo ya bango te, kasi, basengeli mpe “kokumisa bango, kobatela bango, mpe kolinga bango” lokola bazalani bya biso.
Balobi ‘te kobundisa lingomba ya ba mizilma na nzela ya “bilembo bya mabe mpe ya makàneli ya mobulu oyo euti na bato mabe” ezali na boyokani te na maloba mya Nsango Elamu mpo na limemya mpe motema mawa, mpe ezali kobuka mobeko ya moboko ya demokrasi ya bonsomi ya losambo.
Na komonisáká bobangi na bango makasi mpo na likambo oyo, baepiskópó balobaki ‘te kotya ekeko ya moské na likoló lya móto ya esengo ezalaki “likambo lya kozokisa mingi” mpe eyaki na tango moko ya mpasi, nsima ya mobulu moye mowùtaki kosalema, oyo ebomaki biloko mingi mpe ememelaki bato mpe mabota mpasi makasi.
Tango bakokanisáki yango na lolenge oyo bazali kobundisa bilembo ya bokristu, balobi ‘te “bakristu bakotungisama na kobebisama ya bililingi ya bokristu”, mpe batyaki makasi ‘te bandimi basengeli mpe kobulunganisama na ndenge bazali kobebisa na nko bilembo bya bosantu ya bandimi ya mangomba misusu.
Bakonzi baye mibale ya mangomba, basengaki na Bakristu mpe “bato banso ba motema bolamu” ‘te bàkanisa malamu na lolenge maloba mpe misala na bango ekoki kopesa nzela na kimya to na mobulu. Bamonisaki ‘te moto nyonso asàlemá na elilingi ya Nzambe mpe na yango, abongi na lokumu, na limemya mpe na motema mawa.
Na nsuka ya maloba ma bango, Mgr Martin nà Archeveki McDowell ya lingomba Anglican, balendisaki bandimi ya lingomba lya ba mizilma, mpe baoyo bazali kofanda mpe kosala na Irlande ya Nordi, mpe ndenge na ndenge. Na ntina ya bolingo malamu mpe limemya oyo bato mingi bamonisaki.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye