Na Pologne, ekeko ya monéne koleka ya Maria na Poto ebonzami na Konotopie
JR Bompolonga - Kinshasa
«Esika na biso ezali mbuma ya bongobongo te, ezali esika yokó ya losámbo mpo ya bato ya mobémbo mwa boyambi», esakolaki na litéya na ye episkopo ya dioceze ya Włocławek, etuka eye ezali sanctuaire ya Notre-Dame-des-Douleurs. Na eleko ya misa ya 15 ya sánzá ya mwambi na Konotopie, Mgr Krzysztof Wętkowski, alobaki ntina ya ekeko ya Maria ebonzami mokolo eye Ntombwa ya Maria.
Ezali úta leló ekeko ya monéne koleka ya Maria ya Poto: «ekeko eye ya monéne, esembolaki ye, etelemi pembeni ya chapelle esika wápi Notre-Dame-des-Douleurs akokumbama úto mibú ebelé», mpe epái wápi bato ya mobémbo mwa boyambi ya bamboka ya penepene bayaka kosámbela.
Ekeko yokó eye ekotála likoló
Na bolobi liloba ya ekeko ya Notre-Dame de la Miséricorde, Mgr Wętkowski apesaki likanisi na litéya elobamaka na Léon XIV na basilique ya Sagrada Família na Barcelone na sánzá ya motóbá eleki. Alobaki lisusu 'te Papá alobaka: «na bosepeli na tour ya Yézu-Kristu, tokotombola miso epái na Ye, epái ya Oyo ye mókó akolakisa bisó bosóló ya Nzámbe mpe bosóló ya bisó mókó».
Áwa, na Konotopie, ekobaki episkopo ya Włocławek, «totelemisi miso epái ya Maria, oyo akomema biso epái ya Nzámbe. Iyo, Notre-Dame de la Miséricorde akoyébisa biso lisusu Nzámbe. Na elili eye, Maria akoyamba bisó bansó, na bogumbami likoló na bisó mpe na bofúngoli mabóko mpo ya kobyanga bisó ya kotelemisa miso na likoló». Na eleko yokó, etálisaki, epái wápi «mingi ya bato ya eleko ya bisó bazali na miso bibaluka na mabelé mpe batálaka kaka bangó mókó».
Nsinga na losámbo ya Motéma mawa ya Nzámbe
Nkombo «Notre-Dame de la Miséricorde» epesama na ekeko ya Pologne ezali na ndimbola yokó ya ntina, mpo moyekoli ya Motéma mawa ya Nzámbe, sántu Faustine Kowalska, abótama na dioceze kaka ya Włocławek, na mboka ya Świnice Warckie. Ezali waná, elobaki lisusu episkopo, ndé abatisama mpe azuaka komunyo na ye ya yambo.
Liponi lyokó ya botondi
Ntángo ya bofúngoli ya ekeko ya Notre-Dame de la Miséricorde na Konotopie, episkopo Wętkowski alobaki 'te ekeko ya sika ya Maria «ezali mpósá yokó ya botondi» ya bato basálaka bolámu, Grażyna mpe Roman Karkosik, bato bazali na bozui bamilio mingi ya etuka ya pembeni Kikol. Yangó waná, ebakisaki episkopo, «botondi na bisó» epesami na bangó mpe lokolá baye «bazuaki likanisi, bantoki ya ndáko mpe batóngi».
Ekeko ya Konotopie, ya bametele 40 ya molayi, etiami likoló ya etando yokó ya bametele 15 na loléngé ya montole, emáti na nionso na bametele 55,6 ya molayi, na boleki Kristu eyébana ya Corcovado na Rio de Janeiro.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.