Luka

Angelus : Kosalela likabo lya bomoi mpo ya kotonga mokili moleki bosembo nà bondeko.

Na tango ya losambo la Angelus, Pàpa abwaki mbela na bakristu bakanisa na ntina ya lolenge ya kosalela biloko bya mosuni mpe lolenge ya kotambwisa bomoi bwa bango moko. Leon ya XIV alimbolaki ‘te, soki bozuwi ekómisi moto moombo mpe ebimisi matata, bolingo bwa Nzambe ekoki kosala ‘te moto akóma moninga mpe azala na bomoko mpo na kotonga mokili moko ya malamu.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

O mokolo mwa lomingo, mwa 21 Setembe, na esika Saint-Pierre oyo etondisamaki na bandimi to bakristo nkoto zomi na mitano (15 000), ut’o lininisa lya ndako ya ba Pàpa, Leon ya XIV asengi ‘te : «Lolenge kani tosalelaka biloko ya mokili, nkita ya mabele mpe bomoi boye Nzambe apesá biso?».

Mpo na koyanola na motuna wana, episkopo ya Roma atángaki lisese oyo ezuami kati na Nsangu Elamu ekomamaki na santu Luka (Lc 16, 1-13). Na ndakisa moko, Mokonzi moko abengaki kapita ya biloko bya yé, ayebisa yé makambo oyo asalaki. «Elilingi oyo, Pápa alimbolaki ‘te: ezali koyebisa biso likambo moko ya motuya : Ezali te bomoi bwa biso to biloko oyo tozali na yango nde ezali ya biso, kasi biloko binso bizali likabo Mokonzi apesi biso libula na biso, bonsomi na biso mpe lotomo la biso». «Mokolo mosusu, tosengeli kozongisa lapolo ya lolenge oyo tosalelaki bomoi bwa biso, biloko ba biso mpe nkita ya ezali na mabele, ezala liboso lya Nzambe, to liboso lya lisànga lya bato, liboso lya bato banso, mpe liboso lya bato oyo bakoya nsima na biso», elobaki episkopo ya Roma.

Kati na Nsango Elamu ya lelo, kapita alukaka liboso matomba na ye moko, kasi ntango mokolo esengelaki apesa lapolo ya mokumba mwa ye mpe noki te bakolongola ye na mosala mwa ye, asengeli kokanisa nini akosala mpo na mikolo mizali koya. Pápa ayanoli ‘te: «Na tango wana ya mpasi, amonaki ‘te komibombela biloko ya mokili ezali na ntina mingi te, mpamba te bomengo ya mokili oyo ezali ya tango mokuse».

Na yango, «abéngaki bato oyo bazalaki na nyongo na ye mpe alimbisaki bango nyongo na bango, mpe ayebisaki bango ndambo oyo asengelaki kozwa». Na ndenge yango, «abungisaka bozwi bwa ye ya mosuni, kasi azwaki baninga oyo bazali pene ya kosalisa ye mpe kosunga ye».

Na kozwa likanisi lya lisoló liye, Yesu alendisi biso ‘te: «Bómizwela baninga na nzela ya mosolo mabe, mpamba te, awa yango ekosila, bayamba bino kati na bifandelo bya seko » (tala v. 9). ”

“Na kozwa likanisi lya lisoló liye, Yesu alendisi biso ‘te: «Bómizwela baninga na nzela ya mosolo mabe, mpamba te, awa yango ekosila, bayamba bino kati na bifandelo bya seko » (tala v. 9). ””

Kapita ya lisese lyango, oyo Pápa alobelaki, «azali kosalela bozwi ba mokili oyo ezangi boyengebene mpo na kozwa baninga, mpe yango ezali kolongola ye na ezaleli ya moimi ; nzokande, biso bayekoli oyo tozali na bomoi kati na mwinda ya Nsango Elamu, tosengeli kosalela biloko bya mokili mpe bomoi bwa biso moko mpo na kokanisa bozwi ya solo, oyo ezali bolingami nà Mokolo mpe nà bandeko ba biso».

Papa asukisaki na koloba ‘te moto na moto azali na liponi mibale: «Tokoki kolanda motango ya moimi, na kotya bomengo na esika ya liboso mpe komibanza kaka mpo na biso moko; kasi yango ezali kokabola biso na basusu mpe ezali kopanza ngenge ya momekano oyo mbala mingi ebotaka matata». To mpe tokoki kondima manso maye tozali na yango lokola likabo lya Nzambe oyo tosengeli kokamba, mpe kosalela yango lokola esaleli ya kokabola, mpo na kosala masanga ya bondeko mpe ya bomoko, mpo na kotonga malamu, mpo na kotonga mokili ya sembo, ya bosembo mpe ya bondeko».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

21 sánzá ya libwa 2025, 16:16